1 Corinthians 2

Mateya ya Polo na Korinto

1Bandeko, tango nayaki epai na bino mpo na kosakola mabombami ya Nzambe, nasalaki yango te lokola moto oyo ayebi penza koloba to na maloba ya bwanya. 2Pamba te, nazwaki mokano ya koluka koyeba likambo mosusu te kati na bino, longola kaka Yesu Klisto, Yesu Klisto oyo babakaki na ekulusu. 3Nayaki epai na bino na bolembu, na kobanga mpe na kolenga. 4Maloba mpe mateya na ngai evandisamaki na mayele mpe na bwanya ya bomoto te, kasi na kotalisama ya misala nguya ya Molimo, 5mpo ete kondima na bino evandisama na bwanya ya bomoto te, kasi na nguya ya Nzambe.

Bwanya ya solo na nzela ya Molimo

6Nzoka nde, toteyaka bwanya epai na baklisto oyo bakola na kondima. Yango ezali bwanya ya mokili oyo te to mpe ya bakonzi ya tango oyo te, oyo babongisami na libebi. 7Te, toteyaka mabombami ya bwanya ya Nzambe, bwanya oyo ebombama na miso ya bato ya mokili, bwanya oyo Nzambe abongisa mpo na nkembo na biso, liboso ete akela mokili. 8Mokonzi moko te ya mokili oyo asosolaki yango, pamba te soki basosolaki yango, balingaki te kobaka Nkolo ya nkembo na ekulusu. 9Kasi ndenge ekomama : “Oyo liso etikala nanu komona te,
oyo litoyi etikala nanu koyoka te,
mpe oyo moto atikala nanu kanisaki te,
yango nde Nzambe abongisa
mpo na bato oyo balingaka Ye.”

10Nzoka nde, Nzambe atalisaki biso yango na nzela ya Molimo na Ye. Pamba te, Molimo ayebaka makambo nyonso, ezala bozindo ya makanisi ya Nzambe. 11Nani kati na bato ayebi makanisi ya moto, soki kaka molimo oyo ezali kati na ye te ? Ndenge moko mpe, moko te ayebi makanisi ya Nzambe, longola kaka Molimo na Ye. 12Nzoka nde biso, tozwaki molimo ya mokili te, kasi Molimo kowuta na Nzambe, mpo ete tokoka kososola likabo ya ngolu ya Nzambe. 13Boye, toteyaka yango te na maloba ya bwanya ya bomoto, kasi na maloba oyo Molimo alakisaka. Ezali na nzela wana nde tolobaka makambo ya Molimo na nzela ya maloba oyo Molimo apesaka.

14Moto oyo azangi Molimo na Nzambe akoki te koyamba makambo kowuta na Molimo ya Nzambe. Pamba te, ezali lokola liboma na miso na ye ; akoki kososola yango te, pamba te basosolaka yango kaka na nzela ya Molimo. 15Nzoka nde, moto oyo atambolisamaka na Molimo asosolaka makambo nyonso, kasi ye, bato basosolaka ye te. Pamba te, ekomama :
16 “Nani ayebi makanisi ya Nkolo
mpo akoka kopesa Ye toli ?”
Nzoka nde, makanisi ya Klisto ezali kati na biso.
Copyright information for LinMNB