1 Corinthians 7

BIYANO NA MITUNA YA BANDEKO YA KORINTO

Eyano mpo na libala

1Sikʼoyo, mpo na makambo oyo bokomelaki ngai : eleki malamu ete mobali abala te. 2Kasi, mpo na kokima makambo ya soni, eleki malamu ete mobali nyonso azala na mwasi na ye, mpe mwasi nyonso azala na mobali na ye. 3Tika ete mobali akokisa posa ya mwasi na ye, mpe mwasi akokisa oyo ya mobali na ye. 4Pamba te, nzoto ya mwasi ezali lisusu ya ye te, kasi, ya mobali na ye. Ndenge moko mpe, nzoto ya mobali ezali lisusu ya ye te, kasi, ya mwasi na ye. 5Bopimelana nzoto te ; kasi soki bolingi komipesa na mabondeli, bokoki koyokana bino mibale ete bosangisa nzoto te mpo na tango moke. Bongo na sima, bozongela kosangana, noki te, Satana akozwa nzela ya komeka bino mpo na kozanga makoki ya komikanga. 6Makambo oyo nalobi ezali kaka likanisi napesi, kasi ezali mobeko te. 7Nalingi ete mibali nyonso bazala lokola ngai. Kasi, moto na moto azali na likabo oyo Nzambe apesa ye : moko azali na likabo oyo, mpe mosusu azali na likabo wana.

8Nalobi na baoyo babala te mpe na basi oyo bakufisa mibali : eleki malamu ete bazala lokola ngai, babala te. 9Kasi, soki bakokoka komikanga te, eleki malamu ete babala na esika ya kozika na posa ya nzoto.

10Mpo na baoyo babala, napesi bango mobeko oyo (mobeko yango ewuti epai na ngai te, kasi epai na Nkolo) : Mwasi asengeli te kokabwana na mobali na ye. 11Kasi soki akabwani na mobali na ye, abala lisusu te, to ayokana na mobali na ye. Mobali mpe asengeli kokabwana te na mwasi na ye. 12Mpo na bato mosusu, ngai nde nazali koloba kasi Nkolo te : soki ndeko mobali moko azali na mwasi oyo azali mondimi te, bongo mwasi yango asepeli kowumela na ye na libala, akabwana te na mwasi wana. 13Ndenge moko mpe, soki mwasi moko azali na mobali oyo azali mondimi te, mpe mobali yango asepeli kowumela na ye na libala, akabwana te na mobali wana. 14Pamba te, mobali oyo azali mondimi te akomi mosantu na nzela ya mwasi na ye, mpe mwasi oyo azali mondimi te akomi mosantu na nzela ya mobali na ye. Soki ezalaki bongo te, bana na bino balingaki kozala mbindo, nzoka nde bazali basantu. 15Kasi soki ye oyo azali mondimi te alingi koboma libala, aboma na ye. Na likambo ya boye, mobali mondimi to mwasi mondimi azali ya kokangama te : Nzambe abenga biso mpo ete tozala na bomoi ya kimia. 16Pamba te, yo mwasi, oyebi soki okobikisa mobali na yo ? To mpe yo mobali, oyebi soki okobikisa mwasi na yo ?

Moto na moto andima ndenge azali

17Nzoka nde, tika ete moto na moto andima kobika kolanda likabo oyo Nkolo apesa ye, ndenge azalaki tango Nzambe abengaki ye. Oyo nde mobeko napesaka na mangomba nyonso. 18Boni, ezalaki na moto moko oyo tango Nzambe abengaki ye azalaki akatama nzoto ya mibali ? Aluka te kozala lokola moto oyo akatama nzoto ya mibali te. Ezalaki na moto mosusu oyo azalaki akatama nzoto ya mibali te tango Nzambe abengaki ye ? Aluka te kozala lokola moto oyo akatama nzoto ya mibali. 19Kokatama nzoto ya mibali ezali na tina te, mpe kokatama nzoto ya mibali te ezali mpe na tina te ; kasi kobatela mibeko ya Nzambe nde eleki na tina. 20Tika ete moto na moto atikala ndenge azalaki tango Nzambe abengaki ye. 21Boni, ozalaki mowumbu tango Nzambe abengaki yo ? Komitungisa te ; kasi soki ozwi libaku ya kokoma moto ya somi, salela yango. 22Pamba te, mowumbu oyo abengama mpo na kosalela Nkolo, azali moto ya somi ya Nkolo. Ndenge moko mpe, moto ya somi oyo abengama mpo na kosalela Nkolo, azali mowumbu ya Klisto. 23Basombaki bino na talo mingi penza ; yango wana, bokoma bawumbu ya bato te. 24Bandeko, tika ete moto na moto atikala liboso ya Nzambe, ndenge azalaki tango Nzambe abengaki ye.

Eyano mpo na baoyo babala te

25Mpo na baoyo babali nanu te : Nazali na mobeko te oyo ewuti epai na Nkolo, kasi nazali kopesa likanisi na ngai lokola ya moto oyo, na mawa ya Nkolo, bokoki kondimela. 26Nakanisi ete eleki malamu mpo na moto, likolo ya bapasi ya tango oyo, atikala ndenge azali. 27Ozali na mwasi ? koluka kokabwana na ye te. Ozali mpe na mwasi te ? Koluka mpe kobala mwasi te. 28Kasi soki mpe obali, osali lisumu te ; soki elenge mwasi abali, asali lisumu te. Kasi bato oyo babala bakokutana na bapasi mingi na bomoi na bango ya mokolo na mokolo, boye nalingi kokebisa bino ete bapasi yango ekomela bino te.

29Bandeko, nalingi koloba boye : tango ezali mokuse. Kobanda sikʼoyo, tika ete baoyo bazali na basi, bazala lokola nde bazali na basi te ; 30baoyo bazali kolela, bazala lokola nde bazali kolela te ; baoyo bazali kosepela, bazala lokola nde bazali kosepela te ; baoyo bazali kosomba, bazala lokola nde bazali na eloko te ; 31baoyo bazali kosalela biloko ya mokili, bazala lokola nde bazali kosalela yango te. Pamba te, mokili ndenge ezali komonana sikʼoyo, ekoleka. 32Nalingi ete bomitungisa te. Mobali oyo abali nanu te atiaka makanisi na ye na makambo ya Nkolo : alukaka ndenge nini akoki kosepelisa Nkolo. 33Kasi mobali oyo abala atiaka makanisi na ye na makambo ya mokili oyo, alukaka ndenge nini akoki kosepelisa mwasi na ye ; 34mpe motema na ye ezali ya kokabwana. Ndenge moko mpe, mwasi oyo azanga mobali to elenge mwasi oyo abali nanu te, atiaka makanisi na ye na makambo ya Nkolo. Posa ya motema na ye ezalaka kaka ete amipesa mobimba na Nkolo, na nzoto mpe na molimo. Kasi mwasi oyo abala atiaka makanisi na ye na makambo ya mokili oyo, alukaka ndenge nini akoki kosepelisa mobali na ye. 35Nazali koloba makambo oyo mpo na bolamu na bino moko, ezali te mpo na kotiela bino motambu, kasi nalingi ete bosala oyo ezali malamu, mpe bomipesa mobimba na mosala ya Nkolo.

36Soki elenge mobali amoni ete akokoka lisusu te komikanga liboso ya mobandami na ye, bongo akanisi ete abima na ye wana bazali na likanisi ya kobalana, asala kolanda likanisi na ye, asali lisumu te. Tika ete babalana. 37Kasi moto oyo azwi mokano na motema na ye, na kotindikama te, na bososoli nyonso ete wuta na motema na ye akosangisa nzoto te na mobandami na ye, asali malamu. 38Boye, moto oyo abali mobandami na ye asali malamu ; kasi oyo mpe alingi kobala te, asali malamu koleka.

39Mwasi ya libala azalaka ya kokangama na mobali na ye wana mobali azali nanu na bomoi ; soki mobali akufi, mwasi yango akomi na bonsomi ya kobalana na mobali nyonso oyo ye alingi, kasi kaka kati na Nkolo. 40Nzoka nde na makanisi na ngai, namoni ete akozala mwasi ya esengo mingi koleka soki atikali ndenge azali : mpe ngai nakanisi ete, ngai mpe nazali na Molimo ya Nzambe.
Copyright information for LinMNB