1 Corinthians 9

Polo aboyi kosalela makoki na ye

1Boni, nazali na bonsomi te ? Nazali ntoma te ? Namona Nkolo na biso Yesu te ? Bozali mbuma ya mosala na ngai te kati na Nkolo ? 2Soki nazali ntoma te mpo na bato mosusu, kasi mpo na bino, nazali solo ntoma. Pamba te, bino bozali kashe ya mosala na ngai ya kozala ntoma kati na Nkolo.

3Tala eyano na ngai epai ya baoyo bafundaki ngai : 4Boni, biso tokoki te kolia mpe komela mpo na mosala na biso ? 5Tokoki te kotambola elongo na mwasi moklisto lokola bantoma misusu, bandeko ya Nkolo mpe Piere basalaka ? 6Boni, ezali kaka ngai mpe Barinabasi nde tosengeli kosala mpo na kozwa bilei na biso ? 7Nani asalaka mosala ya soda na mbongo na ye moko ? Nani alonaka elanga ya vino mpo alia mbuma na yango te ? Nani abatelaka ngombe mpo amela miliki na yango te ? 8Boni, ezali kaka na bomoto nde esalemaka bongo ? Mobeko mpe elobi bongo te ? 9Pamba te, ekomama na Mobeko ya Moyize : “Okokanga monoko ya ngombe te oyo ezali konyata mbuma.” Boni, bokanisi ete Nzambe amitungisaki nde mpo na ngombe ? 10Ezali mpo na biso kaka te nde alobaki bongo ? Solo, ekomamaki bongo mpo na biso. Pamba te, esengeli ete moto oyo azali kolona azala na elikya, mpe oyo azali kobeta mbuma ya ble azala na elikya ete akozwa eteni na ye. 11Soki tolonaki makambo ya molimo kati na bino, boni ezali penza mabe soki tobuki mbuma ya biloko kati na bino ? 12Soki bato mosusu bazali kozwa biloko epai na bino, boni, biso tokoki kozwa yango koleka te ? Nzoka nde, tosalelaka makoki na biso te, tokangaka mitema na makambo nyonso, noki te tokozala epekiseli mpo na Sango Malamu ya Klisto.

13Boyebi te ete baoyo basalaka na ndako ya Nzambe bazwaka bilei na bango na ndako ya Nzambe ? Boyebi te ete baoyo basalaka na etumbelo bazwaka eteni na bango kati na makabo oyo bato bapesaka ? 14Ndenge wana mpe Nkolo apesaki mitindo ete baoyo bateyaka Sango Malamu bazwa bilei na bango na nzela ya Sango Malamu.

15Kasi ngai nasaleli makoki na ngai ata moke te, mpe ezali te mpo na kosenga yango nde nakomeli bino mokanda oyo. Pamba te, eleki malamu ete nakufa na ngai na esika ya kobebisa lokumu na ngai. 16Koteya Sango Malamu ezali likambo oyo nakoki komikumisa na yango te, pamba te ezali mosala oyo epesamela ngai na makasi. Mawa na ngai soki nateyi Sango malamu te ! 17Soki mokano ya koteya ewutaki epai na ngai moko, nalingaki solo kozwa lifuti. Kasi lokola mokano yango ewuti epai na ngai te, nazali kaka kokokisa mosala oyo epesamelaki ngai. 18Bongo lifuti na ngai ezali penza nini ? Ezali ete nateya Sango Malamu na ofele, naluka te kozwa lifuti oyo Sango Malamu yango epesa ngai ndingisa ya kozwa.

19Solo, atako nazali nsomi na miso ya bato nyonso, kasi namikomisa mowumbu ya bato nyonso mpo ete namema bato ebele koleka epai na Yesu Klisto. 20Tango nazalaka elongo na Bayuda, nakomaka lokola Moyuda mpo ete namema bango epai na Klisto ; tango nazalaka elongo na bato oyo bazali na se ya bokonzi ya Mibeko, nakomaka lokola moto oyo azali na se ya bokonzi ya Mibeko (atako ngai moko nazali na se ya bokonzi ya Mibeko te), mpo ete namema epai na Klisto baoyo bazali na se ya bokonzi ya Mibeko. 21Tango nazalaka elongo na baoyo bazali na se ya bokonzi ya Mibeko te, nakomaka mpe lokola moto oyo azali na se ya Mibeko te (elingi koloba te ete natosaka Mibeko ya Nzambe te, pamba te natosaka Mobeko ya Klisto), mpo ete namema bato oyo bazali na se ya bokonzi ya Mibeko te epai na Klisto. 22Tango nazalaka elongo na bato balenda te kati na kondima, nakomaka lokola moto alenda te kati na kondima, mpo ete namema bato balenda te kati na kondima epai na Klisto. Namikomisaka nyonso epai ya bato nyonso, mpo ete nakoka komema epai na Klisto ndambo ya bato kati na bango. 23Nzoka nde, nasalaka makambo wana nyonso mpo na Sango Malamu, mpo ete ngai mpe nazwa litomba na ngai kati na yango.

24Boni, boyebi te ete kati na lisano ya kopota mbangu, bapoti mbangu nyonso bakimaka, kasi moko kaka nde azwaka mbano ? Bino mpe bokima mbangu, na ndenge ete bozwa mpe mbano. 25Bato nyonso oyo basalaka masano, bamipekisaka makasi na makambo ebele. Basalaka bongo mpo na kozwa motole oyo ebebaka, kasi biso tosalaka bongo mpo na kozwa motole oyo ebebaka te. 26Yango wana, nakimaka mbangu na bozoba te, nabetaka makofi bibetata-beta te. 27Kasi nakonzaka nzoto na ngai mpe nakomisaka yango lokola mowumbu, pamba te nabangaka ete sima ya koteya bato mosusu, ngai moko nazanga mbano.
Copyright information for LinMNB