1 Peter 4

1Yango wana, lokola Kristo amonaki pasi na nzoto na ye, bino mpe bozala na makanisi ye ndenge wana. Pamba te, moto oyo asiʼamona pasi na nzoto na ye asiʼaboya masumu, 2mpo ete, kati na tango nyonso oyo atikali na yango awa na mokili, akoka kolanda baposa mabe ya bomoto te, kasi akoka kolanda mokano ya Nzambe. 3Pamba te, kala bolekisaki tango mingi mpo na kosala makambo oyo bapakano basalaka : komipesa na makambo ya mobulu, na baposa ya mabe, na kolangwa masanga, kolia mpe komela na kolekisa ndelo, mpe na kosambela bikeko. 4Sikʼoyo, bapakano bazali kokamwa mpo na komona ete bozali lisusu te kosangana elongo na bango kati na bomoi ya mobulu ndenge bango basalaka ; yango wana bafingaka bino. 5Kasi bakosamba epai ya Moto oyo asiʼamibongisi mpo na kosambisabato ya bomoi mpe baoyo bakufa. 6Pamba te, ezali mpo na tina wana nde, Yesu Kristo ateyaki mpe Sango Malamu epai ya baoyo bakufa ; mpo sima ya kozwa etumbu lokola oyo bato nyonso bazwaka na banzoto na bango, bazala na bomoi kati na Molimo, ndenge Nzambe mpe azali na bomoi.

BOMOI YA LISANGA

Tosalisana biso na biso

7Suka ya makambo nyonso ekomi pene-pene. Yango wana, bozala na makanisi ya peto mpe bozala na makanisi ya peto mpe bomikengelaka, mpo ete bokoka kobondela. 8Liboso ya makambo nyonso, bolingana mingi penza moko na moko, Pamba te bolingo ezipaka masumu ebele. 9Boyambanaka moko na moko, na koyima-yima te.

10Moto na moto esengeli asalela, likabo oyo azwaki wuta na Nzambempo na bolamu ya baninga, lokola kapita malamu ya makabo ndenge na ndengeya Nzambe. 11Soki moto azali koloba, azala yango lokola moto azali koloba maloba ya Nzambe. Soki moto azali kosalela baninga, asala yango na makasi oyo Nzambe apesaka, mpo ete kati na makambo nyonso, Nzambe akokakozwa lokumu na nzela ya Yesu Kristo. Na ye, nkembo mpe nguya mpo na libela na libela. Amen !

Bapasi oyo mokristo asengeli komona

12Balingami, bokamwa te mpo na komekama ya pasi mingi oyo bozali komona, lokola nde likambo moko ya kokamwa eyeli bino. 13Kasi bosepela mpo bazali kosangana na bapasi ya Kristo, mpo ete bokoka kotonda na esengo tango nkembo na ye ekomonana. 14Soki bazali kofinga bino mpo na kombo ya Kristo, boyeba etebozali bato na esengo, Pamba te Molimo ya nkembo mpe ya Nzambe azali likolo na bino.

15Moto moko te kati na bino amona pasi mpo azali mobomi to moyibi, to moto oyo azali kosala mabe, to mpe lokola moto oyo akotaka na makambo ya bato ; 16kasi soki azali komona pasi mpo azali “Mokristo”, ayoka soni te mpo na yango, kasi akumisa Nzambe mpo na kombo wana. 17Pamba te, tango ekoki mpo ete kosambisama ebanda : mpe ekobanda na libota ya Nzambe ; mpe soki yango ebandi na biso, bongo yango ekosuka ndenge nini mpo na bato oyo bazali koboya kotosa Sango Malamu ya Nzambe ? 18Mpe, soki moto na sembo akobika na pasi mingi, bongo ekosuka boni namoto mabe mpe na moto ya masumu
Tala mpa Masese 11.31.
 ?

19Yango wana, baoyo bazali komona pasi na ndenge mokano ya Nzambeelingi, bamipesa mobimba na maboko ya Mokeli na bango oyo azali sembo, mpe bakoba kosala makambo ya malamu.
Copyright information for LinMNB