1 Thessalonians 2

POLO NA BAKRISTO YA TESALONIKA

Polo alendisi bandeko ya Tesalonika

1Bandeko, bino moko boyebi ete koya na biso epai na bino ezalaki ya pamba te. 2Sima ya kowuta konyokwama mpe kofingama na Filipi, ndenge boyebiyango, kasi na lisalisi ya Nzambe na biso, tozwaki molende ya koteya bino Sango Malamu na ye, na kati ya bitumba mingi.

3Pamba te, mateya na biso evandaki likolo ya libunga te to mpe likolo ya makanisi mabe te, mpo tosalelaki yango na mayele ya lokuta te.

4Nzokande, tolobaka lokola bato oyo Nzambe asiʼandima mpo na kozwa mokumba ya koteya Sango Malamu. Tolukaka kosepelisa bato te kasi Nzambe, ye oyo atalaka mitema na biso.

5Pamba te boyebi yango ete, naino tosalela maloba ya sukali te, ata mpe makanisi ya koluka kozwa mbongo na bino : Nzambe azali temwena biso. 6Mpe naino toluka te lokumu oyo ewutaka na bato, ata epai na bino, ata mpe epai ya bato mosusu. 7Lokola tozali bapostolo ya Kristo, tokokaki kosenga bino bomema mokumba na bino, kasi tozalaki bato ya boboto na kati na bino, ndenge mama abatelaka bana na ye. 8Mpo na bolingo monene oyo tozalaki na yango epai na bino, tosepelaki mingi penza kopesa bino kaka Sango Malamu ya Nzambe te, kasi kopesabino mpe bomoi na biso, mpo bokomaki bandeko na biso ya bolingo. 9Bandeko na ngai, bokanisa bapasi na biso mpe mosala ya makasi oyo tosalaki ; tozalaki kosala mosala butu mpe moi, mpe toboyaki kozala mokumba epai ya moto ata moko na kati na bino, na tango tozalaki koteya bino Sango Malamu ya Nzambe. 10Bino moko bozali batemwe, Nzambe mpe azali temwe, ete ezaleli na biso liboso na bino bandimi, ezalaki ya bosantu, ya bosembo, mpe oyoezangaki mabe. 11Pamba te, boyebi ndenge tozalaki liboso ya moto na moto na kati na bino : ndenge tata asalaka na bana na ye, 12tolendisaki bino, tobondisaki bino, mpe tobondelaki bino, mpo bozala na bizaleli oyo ezali ya kokoka liboso na Nzambe, ye oyo abengaki bino na Bokonzi na ye mpe na kembo na ye.

Kondima mpe bampasi ya bandeko ya Tesalonika

13Yango wana biso mpe, tozongisaka matondi tango nyonso epai ya Nzambe, pamba te, tango boyambaki Liloba ya Nzambe, oyo boyokaki epai na biso, bondimaki yango lokola liloba ya bato te, kasi ndenge ezali penza, Liloba ya Nzambe, oyo ezali kosala kati na bino baoyo bosiʼbondima.

14Bandeko, pamba te, bosiʼbokoma bamekoli ya Mangomba ya Nzambeoyo ya Yudea, oyo ezali kati na Kristo Yesu. Bonyokwamaki epai ya bandeko na bino ya ekolo moko, ndenge moko mpe, Mangomba wana enyokwamaki epai ya Bayuda, 15bango bato babomaki Nkolo Yesu na baprofeta, banyokolaki biso mpe. Basepelisaka Nzambe te mpe bazali banguna ya bato nyonso. 16Bazali kokangela biso nzela mpo na koteya bato oyo bazali Bayuda te, mpo ete babika. Na ndenge wana, bazali kaka kotondisa masumu na bango. Mpe suka na yango, kanda ya Nzambe ekweyeli bango.

Polo atindi Timote

17Bandeko, mpo na biso, sima ya kokabwana na bino mpo na mwa tango moke—na nzoto kasi na makanisi te, mpe na posa monene oyo tozalaki na yango, tosalaki makasi mpo na komona bino. 18Yango wana, tolingaki koya epai na bino ; ngai moko Polo, namekaki yango mbala moko mpe mbala mibale—kasi Satana akangelaki biso nzela.

19Pamba te, banani bazali elikya na biso, banani bazali esengo nabiso, to mpe banani bazali ekoti ya lokumu oyo biso tokozwa na yango kembo liboso ya Nkolo na biso Yesu Kristo tango akoya ? Boni, ezali bino te ? 20Ya solo, bino bozali kembo na biso mpe esengo na biso.
Copyright information for LinMNB