1 Thessalonians 4

MITINDO

Kozala na bomoi ya bosantu

1Bongo bandeko, mpo na kosukisa, tosiʼtolakisa bino soki bizaleli ya ndenge nini bosengeli kozala na yango mpo na kosepelisa Nzambe, mpe ezali ndenge wana nde bozali kosala. Sikʼoyo tosengi bino mpetobondeli bino na kombo ya Nkolo Yesu, ete bosala yango lisusu koleka.

2Pamba te, boyebi mitindo oyo topesaki bino na kombo ya Nkolo Yesu. 3Mokano ya Nzambe ezali boye : bozala na bomoi ya bosantu ; boboya pite ; 4mpe moto na moto na kati na bino ayeba kobatela nzoto na ye na ndenge ya bosantu mpe na ndenge ya botosi, 5kasi alanda baposa ya mabe te, ndenge bapakano basalaka, bango bato bayebi Nzambe te. 6Mpe mpo na likambo oyo, moto moko te akosa ndeko na ye to mpe asala ye mabe. Pamba te, Nkolo akopesa etumbu na baoyo nyonso basalaka masumu ya ndenge wana, ndenge toyebisaka bino tango nyonso mpe tokebisaka bino. 7Pamba te, Nzambe abenga biso te mpo tozala na bomoi ya bosoto, kasimpo tozala na bomoi ya bosantu.

8Yango wana, moto oyo akotiola mitindo oyo, atioli moto te, kasi atioli Nzambe, ye oyo apesaka bino Molimo Mosantu na ye.

9Nzokande, mpo na oyo etali bolingo oyo ekoki kozala kati na bandeko, namoni ete tina ezali te mpo na nakomela bino, pamba te Nzambe asiʼateya bino mpo ete bolingana moko na moko. 10Mpe, yango wana bosalaka epai ya bandeko nyonso oyo bazali na kati ya Masedwane mobimba. Bandeko, tolendisi bino ete, bosala yango lisusu mingi koleka. 11Bozala na posa ya kozala na bomoi ya kimia, botia makanisi kaka namakambo na bino moko, mpe bosala mosala na maboko na bino, kaka ndenge toyebisaki bino, 12mpo ete bato oyo bazali bandimi te bakoka kotosa bomoi na bino ya mokolo na mokolo, mpe, mpo ete bokoka kotalela moto ata moko te.

Bandimi oyo bakufa mpe kozonga ya Nkolo

13Bandeko, tolingi te bozala na kati ya kozanga boyebi, mpo na oyo etali bato oyo bakufa, mpo ete bozala na mawa te lokola bato mosusu oyo bazangi elikya.

14Pamba te, soki tondimaka ete Yesu akufaki mpe asekwaki, tozali kondima mpe, Nzambe akomema elongo na Yesu bato oyo bakufa kati na Yesu.

15Pamba te, makambo oyo tozali koloba na bino ewuti na Liloba ya Nkolo : biso, baoyo tokozala na bomoi kino Nkolo akoya, tokokende liboso te ya bato oyo basiʼbakufa. 16Pamba te, tango motindo ekopesama na mongongo makasi, mongongo ya mokonzi ya baanzelu ekoyokana, mpe kelelo ya Nzambe ekobeta, Nkolo ye moko akokita wuta na Likolo ; bongo bato oyo bakufa kati na Kristobakosekwa bato ya liboso. 17Sima na yango, biso baoyo tokozala na bomoi na tango wana, tokomemama elongo na bango na kati ya mapata, mpo na kokutana na Nkolo na likolo. Mpe bongo, tokozala na Nkolo libela na libela.

18Yango wana, bolendisana moko na moko na maloba oyo.
Copyright information for LinMNB