1 Timothy 2

Ebiangeli na libondeli

1Liboso ya makambo nyonso, nazali kosenga ete bobondelaka, bosengaka, bobondelaka mpo na bato mosusu, mpe bozongisaka matondi mpo na bato nyonso, 2mpo na bakonzi minene, mpe mpo na baoyo nyonso bazali na bokonzi, mpo ete tokoka kozala na bomoi ya boboto mpe ya kimia, kati na botosi makambo ya Nzambe mpe na bosantu. 3Pamba te, yango ezali malamu mpe esepelisaka Nzambe Mobikisi na biso, 4ye oyo alingi ete bato nyonso babika mpe bayeba makambo ya solo.

5Pamba te Nzambe azali se moko, mpe moto oyo azongisaka boyokani kati na Nzambe na bato azali mpe moko, ye nde Kristo Yesu, moto, 6oyo amipesaki ye moko lokola eloko oyo epesamaki mpo na kokangola bato nyonso litatoli oyo esengelaki kopesama na tango na yango. 7Mpe ezali mpo na yango nde, Nzambe aponaki ngai nazala moteyi mpe mopostolo, mpe molakisi ya kondima ya solo epai ya bato oyo bazali Bayuda te. Nakosi te, kasi nalobi ya solo.

Ezaleli ya mibali mpe basi na kati ya lingomba

8Nalingi ete na bisika nyonso, mibali batombola maboko ya bosantutango bazali kobondela, bazala na kanda te mpe na koswana te.

9Ndenge moko mpe, basi balata na ndenge oyo ekoki, na ndenge oyo bato bakoki komona mabe te, mpe na ndenge ya lofundu te. Bakangisa sukite, balata biloko ya wolo te, to mpe mayaka, to mpe bilamba ya talo koleka, 10kasi balata misala ya malamu, oyo ekoki epai na basi oyo balobaka ete basambelaka Nzambe.

11Basi, esengeli bayekola kati na kimia mpe na botosi nyonso. 12Napesi ndingisa te na basi mpo na koteya, to mpe kozala na bokonzi likolo ya mibaliĀ ; kasi esengeli avanda nyee. 13Pamba te, Nzambe asalaki liboso Adam, bongo Eve na sima. 14Mpe, Adam akosamaki teĀ ; kasi ezali mwasi moto akosamaki, mpeabukaki Mobeko ya Nzambe. 15Kasi mwasi akobika na nzela ya kobota bana, soki akobi kotambola kati na kondima, na bolingo, na bosantu, mpe na kozanga makanisi ya lolendo.
Copyright information for LinMNB