2 Corinthians 13

Makebisi ya suka mpe bambote

1Ekozala mbala na ngai ya misato koya epai na bino. “Makambo nyonso ekatamaka soki batatoli mibale to misato balobi.” 2Nasilaki kokebisa bino tango nayaki epai na bino mpo na mbala ya mibale, mpe nazali kozongela yango lisusu lelo, wana nazali nanu mosika na bino, epai ya baoyo basalaki masumu liboso mpe epai ya bato nyonso, ete tango nakoya lisusu, nakoyokela moto ata moko mawa, 3mpo ete bozali koluka elembo ete Klisto alobaka na nzela na ngai. Ye azali na bolembu te liboso na bino, kasi asalaka kati na bino na nguya. 4Solo, atako babakaki Ye na ekulusu kati na bolembu, kasi azali na bomoi na nzela ya nguya ya Nzambe. Biso mpe ndenge moko, tozali na bolembu kati na Ye, kasi tokomilakisa bato ya bomoi elongo na Ye, na nzela ya nguya ya Nzambe, mpo na bolamu na bino. 5Bomituna bino moko mpe botala soki bozali kati na kondima, bomitala penza bino moko malamu. Boyebi te ete Klisto Yesu azali kati na bino ? Loba ete bosila kokweya ya komekama. 6Mpe nazali na elikya ete bino bokoyeba ete biso tokweyaka te liboso ya komekama. 7Tobondelaka Nzambe mpo ete bosala mabe ata moko te : ezali te mpo bato bamona ete biso tolonga komekama, kasi mpo ete bino bosala makambo ya malamu, mpe biso tomonana lokola bato oyo balonga te. 8Pamba te, tozali na nguya ya kotelemela solo te, kasi tozali kaka na nguya ya kokokisa yango. 9Pamba te, tozalaka na esengo mingi tango biso tozalaka na bolembu, kasi bino bozalaka makasi : mpe libondeli na biso ezali ete bokoma bato ya kokoka. 10Yango wana, nakomeli bino makambo nyonso oyo lokola nazali nanu mosika na bino, mpo ete tango nakoya, bomona ngai makambo makasi te na ndenge ya kosalela bokonzi na ngai. Bokonzi Nkolo apesaki ngai ezali mpo na kolendisa kondima na bino, kasi mpo na kokweyisa yango te. 11Bandeko na ngai, nasukisi mokanda na ngai na maloba oyo : bozala na esengo. Boluka kokoma bato ya kokoka. Bolendisanaka bino na bino. Bozala na likanisi moko. Bozalaka na kimia. Bongo, Nzambe ya bolingo mpe ya kimia akozala na bino elongo. 12Bopesana mbote bino na bino na beze ya bosantu. Basantu nyonso oyo bazali awa batindeli bino mbote. 13Tika ete ngolu ya Nkolo Yesu Klisto, bolingo ya Nzambe mpe lisanga na Molimo Mosantu ezala na bino nyonso.
Copyright information for LinMNB