2 Corinthians 2

1Yango wana, nazwaki mokano ya kozonga lisusu te epai na bino noki te nakoyokisa bino lisusu mawa. 2Pamba te, soki solo nayokisi bino mawa, banani lisusu bakoyokisa ngai esengo, soki kaka bino te oyo ngai nayokisi mawa ? 3Nakomelaki bino makambo wana mpo ete tango nakoya, bato oyo basengelaki kopesa ngai esengo bayokisa ngai mawa te. Nandimi solo ete esengo na ngai ezali mpe esengo na bino nyonso. 4Pamba te, nakomelaki bino mokanda yango na komitungisa mingi penza, na pasi na motema mpe na mayi na miso. Nakomaki yango te mpo na koyokisa bino mawa, kasi mpo ete boyeba bozindo ya bolingo na ngai epai na bino.

Kolimbisa moto oyo asali mabe

5Soki moto ayokisi moninga na ye pasi na motema, ezali ngai te nde asili koyokisa motema pasi, kasi bino nyonso, toloba ete ndambo ya bato kati na bino mpo ete tolekisa ndelo te. 6Boye, lisanga esengeli kopesa pamela na moto ya motindo oyo. 7Bongo, bolimbisa ye mpe bobondisa ye mpo ete motema na ye eyoka pasi koleka te. 8Yango wana, nazali kolendisa bino ete bolakisa ye lisusu bolingo koleka. 9Pamba te, wana nakomelaki bino, ezalaki mpo na komeka bino mitema mpe kotala soki bokoki kotosa na makambo nyonso. 10Moto oyo bino bolimbisi, ngai mpe nalimbisi ye. Mpe soki nalimbisi ye wana nazwi ye na likambo oyo esengi ete nalimbisa ye, nalimbisi ye mpo na bino kati na Klisto, 11mpo na kosala ete Satana alonga biso te. Pamba te, toyebi malamu makanisi na ye.

Komitunga ya Polo

12Tango nakomaki na Troasi mpo na kosakola Sango Malamu ya Klisto, atako Nkolo afungolelaki ngai ekuke, 13motema na ngai ezalaki kaka na kimia te, mpo ete natikalaki te komona ndeko na ngai Tito. Yango wana, napesaki bango mbote ya bokabwani mpe nakendaki na Masedwane.

Elonga ya Klisto

14Matondi na Nzambe oyo alongisaka biso tango nyonso kati na Klisto, mpe apanzaka na nzela na biso boyebi ya Klisto lokola solo kitoko ya malasi na bisika nyonso. 15Pamba te, biso tozali malasi ya solo kitoko ya Klisto mpo na Nzambe epai ya baoyo basila kobika, mpe epai ya baoyo babunga. 16Mpo na bamoko, ezali solo ya kufa oyo ememaka bango na kufa, mpe mpo na bamisusu, ezali solo ya bomoi oyo ememaka bango na bomoi. Boye, nani azali na makoki ya kosala mosala oyo ?

17Biso tozali lokola ebele ya bato te oyo balukaka kosala mombongo na Liloba ya Nzambe. Nzoka nde, kati na Klisto tolobaka liboso ya Nzambe na bosolo nyonso lokola bato oyo Nzambe atinda.
Copyright information for LinMNB