2 Corinthians 4

Bomengo kati na nzungu ya mabele

1Lokola Nzambe nde apesaki biso lotomo oyo na ngolu na Ye, biso mpe tokolemba nzoto te. 2Boye, toboya makambo ya soni oyo esalemaka na nkuku, tokosaka te, mpe tobongolaka Liloba ya Nzambe te. Nzoka nde, wana toteyaka bosolo, topesaka nzela na moto nyonso ete atala ye moko soki tozali kosala na Kombo ya Nzambe to te. 3Kasi soki Sango Malamu oyo tozali koteya ezipama, ezipama nde mpo na bato oyo babunga nzela, 4bato ya mitema mabanga, baoyo nzambe ya mokili oyo abebisa bango makanisi mpo ete bamona te pole ya Sango Malamu ya nkembo na Klisto, oyo azali elilingi ya Nzambe. 5Pamba te, toteyaka sango na biso moko te, kasi toteyaka nde Nkolo Yesu Klisto. Mpe mpo na biso, tolobaka ete tozali bawumbu na bino mpo na Yesu. 6Pamba te, Nzambe oyo alobaki : “Tika ete pole engenga kati na molili,” Ye moko nde angengisaki mitema na biso na pole na Ye, mpo na kongengisa boyebi ya nkembo ya Nzambe, oyo engengaka na elongi ya Klisto.

7Kasi tomemaka bomengo yango kati na mbeki ya mabele, mpo ete nguya monene ya Nzambe emonana, kasi nguya na biso bato te. 8Tomonaka bapasi ya ndenge na ndenge, kasi tosukaka te ; totungisamaka mingi, kasi tolembaka nzoto te ; 9tonyokwamaka mingi, kasi Nzambe asundolaka biso te ; tosukaka mayele, kasi tobungisaka te. 10Solo, tomemaka mokolo na mokolo kufa ya Yesu na nzoto na biso, mpo ete bomoi na Ye mpe emonana na nzoto na biso. 11Solo, atako tozali na bomoi, tokutanaka mokolo na mokolo na makama ya liwa mpo na Yesu, mpo ete bomoi na Yesu mpe emonana na nzoto na biso oyo ekufaka. 12Yango wana, kufa esalaka mosala kati na biso, kasi bomoi esalaka mosala kati na bino.

13Wana tozali na kondima moko, kolanda ndenge ekomama : “Nandimi, yango wana nalobi,” biso mpe tondimi, yango wana tozali koloba. 14Pamba te, toyebi malamu ete Ye oyo asekwisaki Nkolo Yesu kati na bakufi, akosekwisa mpe biso elongo na Yesu, mpe akolakisa biso elongo na bino, liboso na Ye. 15Makambo wana nyonso ezali mpo na litomba na bino, mpo ete ngolu efuluka koleka, mpe bato ebele bapesa matondi mingi mpo na nkembo ya Nzambe.

16Yango wana, tolembaka nzoto te ; mpe ata soki bomoto na biso ya libanda ezali kobeba moke-moke, kasi bomoto na biso ya kati ekomaka, mokolo na mokolo, ya sika. 17Pamba te, bapasi na biso ya tango oyo, ekoleka. Bapasi yango ezali penza pepele liboso ya monene ya nkembo ya seko, oyo bapasi yango ezali kobongisa mpo na biso. 18Boye, totalaka te makambo oyo emonanaka na miso, kasi totalaka nde makambo oyo emonanaka te. Pamba te, makambo oyo emonanaka ezali mpo na tango moke, kasi oyo emonanaka te ezali mpo na libela na libela.
Copyright information for LinMNB