2 Corinthians 7

1Balingami na ngai, lokola tozali na bilaka ya motindo oyo, tomipetola na makambo nyonso oyo ekomisaka nzoto mpe molimo mbindo ; tika ete toluka penza kotambola na bosantu na nzela ya kotosa Nzambe.

Polo Na Bandeko Ya Korinto Bazongisi Boyokani

2Bopesa biso esika na mitema na bino ! Tosalaki moto moko te mabe, tobebisaki moto moko te, tokosaki moto moko te mpo na kobotola ye biloko. 3Nalobi bongo te mpo na kosambisa bino, pamba te nasilaki koyebisa bino ete bozali kati na mitema na biso, ezala mpo na kufa to mpo na bomoi. 4Natieli bino motema, mpe nazali kobeta tolo mpo na bino. Motema na ngai etondi na kimia mpe ezali na esengo makasi kati na bapasi nyonso oyo ekomelaka biso.

5Pamba te, tango kaka tokomaki na Masedwane, tozwaki ata tango ya kopema te ; tokutanaki na bapasi ya ndenge na ndenge : bitumba na libanda mpe kobanga kati na mitema. 6Kasi Nzambe oyo abondisaka bato oyo batutami na mitema, abondisaki biso tango Tito ayaki. 7Tobondisamaki kaka na koya ya Tito te, kasi mpe, na libondisi oyo ye Tito azwaki epai na bino. Atalisaki biso posa monene oyo bozali na yango ya komona ngai, kolela na bino mpe komipesa na bino mpo na ngai. Nyonso wana esalaki ete natondisama lisusu na esengo koleka.

8Yango wana, soki nayokisaki bino mawa na mokanda na ngai, ezali kosala ngai pasi na motema te. Ata soki esalaki ngai motema pasi, ezali mpo ete nasosolaki ete eyokisaki bino mawa na mwa tango, 9Kasi sikʼoyo nazali na esengo, ezali te mpo ete boyokaki mawa, kasi mpo ete boyokaki mawa oyo ememaki bino na kobongola bizaleli. Pamba te, mawa na bino ezalaki kati na mokano ya Nzambe, mpe na nzela wana, tosalaki bino mabe te. 10Pamba te, koyoka mawa na mokano ya Nzambe esalaka ete moto abongola bizaleli, mpe kobongola bizaleli ememaka na lobiko, bongo tina ya komona pasi na motema ezali te. Kasi mawa oyo ewuti na mokili ememaka na kufa. 11Botala makambo oyo mawa kati na mokano ya Nzambe ememaki kati na bino : tala ndenge nini bokomi na molende !
tala ndenge nini bokomi kolimbisana !
tala ndenge nini bokomi koboya mabe !
tala ndenge nini bokomi na bobangi !
tala ndenge nini bokomi na posa makasi komona ngai !
tala ndenge nini bokomi na bolingo oyo eleka ndelo !
tala ndenge nini bokomi na molende ya kopamela mabe !

Na makambo nyonso, bolakisi ete bozalaki na bino mitema pembe na likambo wana.

12Boye, soki nakomelaki bino, ezalaki te mpo na moto oyo asalaki mabe to mpo na moto oyo basalaki mabe, kasi ezalaki mpo ete, kati na bino, bolingo na bino oyo eleka ndelo mpo na biso, etalisama liboso ya Nzambe. 13Yango wana, tobondisamaki.

Na kobondisama na biso, tosepelaki lisusu makasi koleka na esengo ya Tito, na ndenge bino nyonso bokitisaki ye motema.
14Nabetaki tolo liboso na ye mpo na bino, mpe boyokisaki ngai soni te. Kasi lokola tango nyonso tozalaki koloba na bino na bosolo, boye lolendo na biso mpo na bino liboso ya Tito ezalaki na tina. 15Mpe bolingo na ye epai na bino ezali penza monene, tango akanisaka botosi na bino nyonso, ndenge nini boyambaki ye na botosi mpe na kolenga. 16Nazali na esengo, pamba te kati na nakambo nyonso, nakoki kotiela bino motema.
Copyright information for LinMNB