2 Thessalonians 3

Ebiangeli na libondeli

1Bandeko, mpo na kosukisa, bobondelaka mpo na biso, mpo ete Liloba ya Nkolo ekoka kopanzana noki penza mpe ezwa nkembo, ndenge ezalaki epai na bino.

2Bobondela mpe mpo ete Nzambe akangola biso na maboko ya bato mabempe batomboki. Pamba te bango nyonso te nde bazali na kondima. 3Kasi Nkolo azali sembo, akopesa bino makasi mpe akobatela binoliboso ya Motomboki.

4Tozali na elikya kati na Nkolo mpo na bino, ete bozali kosala mpe bokokoba kosala makambo oyo totindaki bino. 5Tika ete Nkolo akamba mitema na bino mpo bozala na bolingo ya Nzambe mpe na kokanga motema oyo Kristo apesaka.

Tina ya kosala mosala

6Bandeko, totindi bino na kombo ya Nkolo Yesu Kristo : bokima ndeko nyonso oyo azali na bomoi na mobulu, mpe alingi te kolanda mateya oyo toteyaki bino.

7Pamba te, bino moko boyebi soki ndenge nini bosengeli kolandandakisa na biso. Tango tozalaki elongo na bino, tozalaki bato ya goigoi te, 8mpe toliaki epai ya moto ata moko te bilei ya ofele, kasi tozalaki kosala mosala butu mpe moi, mosala ya makasi penza mpe ya pasi, mpo etetomemisa mokumba na biso epai ya moto ata moko te kati na bino. 9Elingi koloba te ete tozalaki na ndingisa mpo na kosenga lisalisiya ndenge wana, kasi tosalaki bongo mpo ete tokoma ndakisa epai na bino, oyo bokoki kolanda.

10Pamba te, tango tozalaki elongo na bino, topesaki bino mobeko oyo : “Soki moto aboyi kosala mosala, alia mpe te !” 11Nzokande, tozali koyoka ete bato mosusu kati na bino bazali bagoigoi. Bazali kosala eloko moko te, mpe mosala na bango kaka kokota makambo ya bato. 12Na kombo ya Nkolo Yesu Kristo, tozali kotinda mpe kosenga bato ya ndenge wana, ete basala mosala na kimia nyonso mpe balia bilei oyo bakozwana motoki na bango moko.

13Kasi mpo na bino bandeko, bolemba te mpo na kosala makambo ya malamu. 14Soki moto aboyi kotosa mitindo oyo topesi bino na mokanda oyo, botala ye malamu penza mpe bosanganaka na ye lisusu te mpo ete ayoka soni. 15Kasi bokamata ye lokola monguna te, nzokande bokebisa ye lokola ndeko.

Libondeli mpe bambote

16Tika ete ye moko Nkolo ya kimia apesa bino tango nyonso kimiana lolenge na yango nyonso. Nkolo azala na bino nyonso.

17Ngai Polo, nakomi mbote oyo na loboko na ngai moko ; yango nde ezali elembo kati na mikanda na ngai nyonso. Nakomaka ndenge oyo.

18Tika ete ngolu ya Nkolo na biso Yesu Kristo ezala na bino nyonso.
Copyright information for LinMNB