Acts 10

Emoniseli ya Kornei

1Ezalaki na moto moko na Sezare, na kombo ya Kornei. Ye azalaki mokonzi ya mampinga ya basoda, oyo babengaka mampinga ya Itali. 2Ye elongo na libota na ye, bazalaki kotosa mibeko ya Nzambe mpe kobanga Ye. Azalaki kosalisa na esengo bato bakelela mpe kobondela Nzambe tango nyonso. 3Mokolo moko, pene ya ngonga ya misato sima ya midi, azwaki emoniseli. Amonaki na polele penza anjelu ya Nzambe koya epai na ye mpe kobenga ye : “Kornei !”

4Kornei atalaki ye na somo mpe atunaki :

—Nkolo, likambo nini ?

Anjelu azongiselaki ye :

—Mabondeli na yo mpe masungi oyo opesaka bato bakelela emati kino epai ya Nzambe lokola ekaniseli.
5Sikʼoyo, tinda bato na Jafa mpe bengisa moto moko, na kombo ya Simona, oyo babengaka mpe Piere. 6Azali kovanda na ndako ya moto moko oyo abongisaka baposo ya nyama, kombo na ye Simona. Ndako na ye ezali pene ya ebale monene.

7Tango anjelu oyo asololaki na ye akendaki, Kornei abengaki basali mibale kati na basali na ye mpe soda moko kati na basoda oyo bazalaki kosalela ye, oyo azalaki penza kotosa mibeko ya Nzambe. 8Boye, ayebisaki bango makambo nyonso oyo ekomelaki ye mpe atindaki bango na Jafa.

Piere azwi emoniseli

9Na mokolo oyo elandaki, pene ya midi, wana bato oyo Kornei atindaki bazalaki nanu na nzela mpe bakomaki pene ya Jafa, Piere amataki na veranda oyo ezalaki na likolo ya ndako mpo na kobondela. 10Ayokaki nzala mpe akomaki na posa ya kolia. Kasi, wana bazalaki nanu kolambela ye bilei, akweyaki na Molimo. 11Amonaki likolo efongwami mpe eloko moko lokola elamba ya monene, oyo basimba na basonge na yango minei kokita na se. 12Kati na yango, ezalaki na lolenge nyonso ya banyama ya makolo minei, ya banyama oyo etambolaka na libumu mpe bandeke. 13Boye, mongongo moko elobaki na ye :

—Piere, telema ! Boma mpe lia !

14Kasi Piere azongisaki :

—Te Nkolo ! Nanu nalia eloko ya mbindo to ya bosoto te !

15Mongongo yango elobaki na ye lisusu :

—Eloko oyo ngai Nzambe abengi peto, yo kobenga yango mbindo te.

16Ekomelaki ye bongo mbala misato, mpe na mbala moko, eloko yango emataki na likolo.

17Piere akamwaki mingi penza mpe akomaki komituna soki emoniseli oyo awuti kozwa elakisi nini. Kaka na tango wana, bato oyo Kornei atindaki bamonaki ndako ya Simona oyo bazalaki koluka, mpe batelemaki na ekuke. 18Babelelaki mpe batunaki soki Simona oyo babengaka Piere avandaka wana.

19Wana Piere azalaki kaka komituna mpo na emoniseli oyo awutaki kozwa, Molimo alobaki na ye : “Simona, bato misato bazali koluka yo. 20Telema, kita mpe kotia tembe te mpo na kokende na bango elongo. Pamba te, ngai nde natindi bango.”

21Piere akitaki mpe alobaki na bato yango :

—Ezali nde ngai moto bozali koluka. Boyei mpo na nini ?

22Bazongisaki :

—Towuti epai ya Kornei, mokonzi ya basoda. Ye azali moto ya sembo mpe abangaka Nzambe. Bayuda nyonso batosaka ye mingi. Anjelu ya Nzambe ayebisaki ye ete abengisa yo na ndako na ye mpo ete ayoka oyo okoki koloba.

23Boye, Piere akotisaki bango na ndako mpe apesaki bango esika ya kolala.

Piere atatoli Yesu Klisto epai ya bapagano

Na mokolo oyo elandaki, Piere akendaki na bango nzela moko, mpe bandeko misusu ya Jafa bakendaki na ye mpe elongo.
24Sima ya mokolo moko, bakomaki na Sezare. Kornei azalaki kozela bango, abengisaki bato ya libota na ye mpe baninga na ye. 25Tango Piere alingaki kokota na ndako, Kornei akendaki koyamba ye mpe afukamaki liboso na ye na botosi nyonso. 26Kasi, Piere atelemisaki ye mpe alobaki : “Telema ! Ngai mpe nazali kaka moto lokola yo.”

27Wana bazalaki kosolola, Piere akotaki na ndako mpe akutaki bato ebele basangani. 28Alobaki na bango :

—Bino moko boyebi yango malamu ete mibeko na biso epekisaka Moyuda nyonso kosangana to kokende kotala mopagano. Kasi Nzambe alakisi ngai ete nasengeli komona moto moko te mbindo to bosoto.
29Yango wana, tango botindaki bato mpo ete babenga ngai, natunaki ata motuna moko te mpo na koya. Sikʼoyo nakoki koyeba tina nini bobengeli ngai ?

30Kornei azongisaki :

—Eleki mikolo misato, na ngonga lokola oyo, ngonga ya misato sima ya midi, nazalaki kobondela na ndako na ngai. Na mbala moko, namonaki moto moko alata bilamba ya kongenga makasi penza mpe atelemaki liboso na ngai.
31Alobaki : “Kornei, Nzambe ayoki mabondeli na yo mpe abosani te masungi oyo opesaka bato bakelela. 32Tinda bato na Jafa mpe bengisa Simona oyo babengaka Piere. Azali kovanda na ndako ya Simona oyo abongisaka baposo ya nyama, oyo ndako na ye ezali pene ya ebale monene.” 33Yango wana, natindaki bato noki-noki epai na yo, mpe osali malamu ndenge osili koya. Sikʼoyo, biso nyonso tozali awa liboso ya Nzambe mpo na koyoka nyonso oyo Nkolo atindi yo koyebisa biso !

34Boye, Piere azwaki maloba mpe alobaki :

—Sikʼoyo nasili kososola solo ete Nzambe atalaka bilongi te,
35kasi andimaka bato ya bikolo nyonso oyo babangaka ye mpe basalaka makambo ya sembo. 36Atindaki Liloba na ye epai ya bato ya Isalaele mpo na kosakola epai na bango sango malamu ya kimia na nzela ya Yesu Klisto, oyo azali Nkolo ya bato nyonso. 37Boyebi makambo oyo esalamaki na Yudea mobimba, ebandelaki na Galile, sima na sango ya libatisi oyo Yoane ateyaki. 38Boyebi mpe lisusu ndenge nini Nzambe atondisaki Yesu ya Nazareti na Molimo Mosantu mpe na nguya, mpe ndenge nini atambolaki bipai na bipai mpo na kosala bolamu mpe kobikisa bato nyonso oyo bazalaki na se ya nguya ya zabolo, pamba te Nzambe azalaki elongo na ye.

39Biso tozali batatoli ya makambo nyonso oyo Yesu asalaki na mokili ya Bayuda mpe na Yelusalemi. Babomaki ye mpe babakaki ye na nzete, 40kasi Nzambe asekwisaki ye kati na bakufi na mokolo ya misato mpe asalaki ete amonana lisusu. 41Amonanaki na bato nyonso te, kasi kaka na biso batatoli oyo Nzambe apona wuta kala, biso oyo toliaki mpe tomelaki na ye elongo, sima ya lisekwa na ye kati na bakufi. 42Boye, atindaki biso ete toteya sango malamu epai ya bato, mpe totatola ete Ye nde Moto oyo Nzambe apona mpo na kosambisa bato ya bomoi mpe bakufi. 43Basakoli nyonso batatolaki na tina na Ye ete moto nyonso oyo akondimela Ye, akozwa bolimbisi ya masumu na Kombo na Ye.

Bato ya bikolo ya bapaya bazwi Molimo

44Wana Piere azalaki nanu koloba, Molimo Mosantu akitelaki bato nyonso oyo bazalaki koyoka mateya. 45Bayuda oyo bandimelaki Yesu, oyo bayaki elongo na Piere wuta na Jafa bakamwaki mingi na komona ete Nzambe apesi mpe likabo ya Molimo Mosantu ezala na bato ya bikolo ya bapaya. 46Pamba te, bayokaki bango koloba na minoko misusu mpe kokumisa monene ya Nzambe.

47Boye, Piere atunaki bango : “Bato oyo mpe bazwi Molimo Mosantu ndenge biso tozwaki. Boni, ezali na moto oyo akoki koboya ete bazwa libatisi na mayi ?” 48Boye, Piere atindaki ete babatisa bango na Kombo ya Yesu Klisto. Bongo, babondelaki Piere ete avanda na bango elongo mpo na mwa mikolo.
Copyright information for LinMNB