Acts 4

Piere na Yoane basambi liboso ya Likita monene

1Wana Piere mpe Yoane bazalaki nanu koloba na bato, banganga-Nzambe, mokonzi ya bakengeli ya Tempelo mpe basaduseo bayaki, 2na kanda makasi ndenge bamonaki bantoma koteya bato mpe kotatola ete bato bakufa bakosekwa ndenge Yesu asekwaki. 3Bakangaki Piere mpe Yoane, bongo babwakaki bango na boloko kino na mokolo oyo elandaki, pamba te pokwa esilaki kokoma. 4Kasi, bato mingi kati na bato oyo bayokaki mateya bandimaki yango, bongo motango ya bandimi ebakisamaki mpe bakomaki bato pene nkoto mitano (5.000).

5Boye, na mokolo oyo elandaki, bakonzi ya Bayuda, bampaka mpe balakisi ya mibeko basanganaki na Yelusalemi. 6Ana, mokonzi ya banganga-Nzambe azalaki wana elongo na Kayifa, Yoane, Alekizandre mpe bato mosusu ya libota ya mokonzi ya banganga-Nzambe. 7Bamemaki Piere mpe Yoane liboso na bango, mpe bakomaki kotuna bango mituna :

—Bozali kosala makambo oyo na bokonzi to na kombo ya nani ?

8Bongo, Piere oyo atondisamaki na Molimo Mosantu alobaki na bango :

—Bakonzi mpe bampaka ya Isalaele !
9Lokola botuni biso lelo mpo na bolamu oyo esalami epai ya moto oyo akufa makolo mpe ndenge nini asili kobika, 10tika ete bino nyonso mpe bato nyonso ya Isalaele boyeba ete ezali na Kombo ya Yesu Klisto ya Nazareti nde moto oyo atelemi liboso na bino na nzoto kolongono, kaka Yesu oyo bino bobakaki na ekulusu kasi Nzambe asekwisaki ye kati na bakufi. 11Ye nde azali “libanga oyo bino batongi ya ndako bobwakaki,
kasi ekomi libanga oyo ezali na tina mingi koleka.”

12Lobiko ekoki kozwama na moto mosusu te, pamba te kombo mosusu ezali te na mokili, oyo epesama na bato, oyo ekoki kobikisa biso.

13Wana bamonaki ndenge nini Piere mpe Yoane bazalaki koloba na mpiko, mpe basosolaki ete bazalaki bato batanga te mpe bato pamba, bakamwaki mingi penza. Boye, basosolaki ete bango mpe bazalaki elongo na Yesu. 14Bazalaki ata na liloba moko te ya koloba, pamba te bazalaki komona moto oyo abikaki atelema wana pene na bango. 15Bongo, bapesaki mitindo ete babimisa bango na Likita monene, mpe batikalaki bango moko mpo na koyekola likambo yango malamu. 16Bazalaki kotunana : “Tosala nini penza na bato oyo ? Pamba te, bato nyonso oyo bavandaka na Yelusalemi bayebi malamu ete bango nde basalaki likamwisi wana ya monene mpe tokoki kowangana yango te. 17Kasi mpo ete sango ya likambo oyo ekoba kopanzana te kati na bato, tokebisa bango boye : ‘Bomeka lisusu te koloba na Kombo ya Yesu ezala ata na nani !’ ”

18Boye, babengaki Piere na Yoane mpe bapekisaki bango ete bameka lisusu te koloba to koteya na Kombo na Yesu, ezala ata na lolenge nini. 19Kasi, Piere mpe Yoane bazongiselaki bango :

—Botala nanu ata bino moko, eloko nini ezali sembo na miso ya Nzambe : kotosa bino to kotosa Nzambe ?
20Pamba te, biso, tokokoka te kotika koloba makambo oyo tomonaki mpe toyokaki !

21Sima ya kogangela bango, batikaki bango ete bakende, pamba te bamonaki te ndenge nini bakokaki kopesa bango etumbu, mpo ete bato nyonso bazalaki kokumisa Nzambe mpo na likambo oyo esalamaki. 22Moto oyo abikaki na ndenge ya kokamwa azalaki na mibu koleka tuku minei.

Bandimi babondeli

23Tango batikaki bango, Piere mpe Yoane bakendaki koyebisa baninga na bango makambo nyonso oyo bakonzi ya banganga-Nzambe mpe bakambi balobelaki bango. 24Tango bayokaki bongo, batombolaki mingongo na bango elongo mpo na kobondela Nzambe. Balobaki :

—Nkolo Yawe, Yo oyo osala likolo mpe se, ebale monene mpe biloko nyonso oyo ezalaka kati na yango ;
25Yo oyo olobaki na nzela ya Molimo Mosantu, na monoko ya koko na biso Davidi, mosali na yo : “Mpo na nini bikolo ezali kotomboka
mpe bato bazali kosala makita ezanga tina ?

26 Bakonzi ya mokili batelemi
mpe bayangeli basangani
mpo na kobundisa Nkolo
mpe Mopakolami na ye.”

27Pamba te, Erode mpe Ponse Pilato basanganaki na engumba oyo, elongo na bato ya bikolo misusu mpe bato ya Isalaele mpo na kosalela Yesu likita, Mosali na yo Mosantu oyo obulisa. 28Ezali na ndenge wana nde bakokisaki mabongisi oyo osala wuta kala na nguya mpe na mokano na yo. 29Sikʼoyo Nkolo, tala ndenge bazali kotungisa biso, mpe pesa basali na yo makasi ya koteya Liloba na yo na molende nyonso. 30Boye, sembola loboko na yo mpo na kobikisa bato ya maladi, kosala bilembo ya kokamwa mpe misala minene na Kombo na Yesu, Mosali na yo Mosantu.

31Boye, tango basilisaki kobondela, esika oyo basanganaki eninganaki. Mpe bango nyonso batondisamaki na Molimo Mosantu mpe bakomaki koteya Liloba ya Nzambe na molende nyonso.

Bandimi batie biloko na bango esika moko

32Bandimi nyonso bazalaki motema moko mpe makanisi moko. Moko te kati na bango azalaki koloba ete biloko na ye ezali kaka ya ye moko, kasi biloko nyonso ezalaki mpo na bango nyonso. 33Bantoma bakobaki kotatola lisekwa ya Nkolo Yesu na nguya monene, mpe ngolu monene ezalaki na bango nyonso. 34Moko te kati na bango akelelaki. Pamba te, tango nyonso bato oyo bazalaki na mabele to na bandako bazalaki koteka yango, bazalaki komema mbongo oyo batekelaki 35epai ya bantoma. Boye, bantoma bazalaki kokabola yango na moto na moto, ndenge ezalaki bosenga na ye.

36Boye, Jozefi, moto ya libota ya Levi, oyo abotama na esanga ya Shipre mpe oyo bantoma bapesaki kombo ya Barnabasi, oyo elakisi : “Molendisi” ; 37atekaki mpe elanga na ye mpe amemaki mbongo epai ya bantoma.
Copyright information for LinMNB