Acts 7

Mateya ya Etieni

1Bongo, mokonzi ya banganga-Nzambe atunaki ye :

—Boni, makambo oyo bafundeli yo ezali ya solo ?

2Etieni azongisaki :

—Batata mpe bandeko, boyoka ngai ! Nzambe ya nkembo abimelaki koko na biso Abrayami tango azalaki na Mezopotami, liboso ete akende kovanda na Sharani.
3Boye, Nzambe alobaki na ye : “Longwa na mokili na yo mpe na libota na yo, mpe kende na mokili oyo nakolakisa yo !” 4Boye, alongwaki na mokili ya Shaldeya mpe akendaki kovanda na mokili ya Sharani. Sima ya liwa ya tata na ye, Nzambe atindaki ye na mokili oyo, mokili oyo bino bozali kovanda sikʼoyo. 5Apesaki ye mabele moko te awa, ezala ata mwa eteni. Kasi, Nzambe apesaki ye elaka, ye elongo na bakitani na ye sima na ye ete, bakozwa mokili lokola libula, ata na tango wana, Abrayami azalaki nanu na mwana te.

6Tala makambo oyo Nzambe alobaki :

“Bakitani na yo bakozala bapaya na mokili ya bato mosusu, bongo kuna, bakokoma bawumbu mpe bakonyokola bango mibu pene nkama minei.”
7Kasi, Nzambe alobaki lisusu : “Nakopesa etumbu na ekolo oyo ekokomisa bango bawumbu. Mpe na sima, bakobima na mokili yango mpe bakosambela ngai na esika oyo.”

8Bongo, Nzambe asalaki boyokani na Abrayami, mpe elembo ya boyokani yango ezalaki : kokata nzoto ya mibali. Abrayami abotaki Izaki mpe akataki ye nzoto ya mibali sima ya mikolo mwambe ya mbotama na ye. Izaki abotaki Jakobi mpe akataki ye nzoto ya mibali, bongo Jakobi mpe abotaki bakoko na biso zomi na mibale mpe akataki bango nzoto ya mibali.

9Lokola bakoko na biso bayokelaki Jozefi likunya, batekaki ye mpo ete azala mowumbu na Ejipito. Kasi Nzambe azalaki na ye elongo, 10mpe akangolaki ye na minyoko na ye nyonso. Apesaki ye bwanya mpe asalelaki ye ngolu na miso ya Faraon, mokonzi ya Ejipito, oyo akomisaki ye moyangeli ya Ejipito mpe ya ndako na ye mobimba.

11Nzoka nde, nzala moko ya makasi ekotaki na Ejipito mobimba mpe na Kanana, ememaki pasi penza, bongo bakoko na biso bazalaki lisusu na eloko ya kolia te. 12Tango Jakobi ayokaki ete ble ezali na Ejipito, atindaki bakoko na biso mbala ya liboso. 13Na mbala ya mibale, Jozefi amilakisaki epai ya bandeko na ye, bongo Faraon ayaki koyeba libota ya Jozefi. 14Bongo, Jozefi atindaki ete bakende kozwa tata na ye Jakobi elongo na bandeko na ye nyonso. Bango nyonso bazalaki bato tuku sambo na mitano. 15Boye, Jakobi akendaki kovanda na Ejipito, epai wapi ye na bakoko na biso bakufaki. 16Bamemaki banzoto na bango na engumba ya Sishemi mpe bakundaki yango na lilita oyo Abrayami asombaki na mbongo epai ya bana ya Amori, tata ya Sishemi.

17Wana tango oyo Nzambe alingaki kokokisa elaka oyo apesaki na Abrayami ekomaki pene, motango ya bato na biso na Ejipito ekomaki ebele penza. 18Boye, mokonzi mosusu oyo ayebaki eloko moko te mpo na Jozefi azwaki bokonzi na Ejipito. 19Na mayele mabe, mokonzi yango anyokolaki bakoko na biso kino kotinda bango na makasi ete babwaka bana na bango oyo babotami sika mpo ete bakufa.

20Ezalaki na tango wana nde Moyize abotamaki. Nzambe asalaki ye kitoko mingi. Babatelaki ye sanza misato na ndako ya tata na ye. 21Wana baboti na ye batiaki ye libanda, mwana mwasi ya Faraon azwaki ye mpe abokolaki ye lokola mwana na ye penza. 22Bayekolisaki Moyize na bwanya nyonso ya bato ya Ejipito, mpe akomaki moto na nguya na maloba mpe na misala.

23Tango Moyize akokisaki mibu tuku minei, azwaki mokano ya kokende kotala bandeko na ye, bato ya Isalaele. 24Awa amonaki moto moko ya Ejipito kobeta moto ya ekolo na ye, akotelaki moto ya Isalaele, azongisaki mabe na moto ya Ejipito mpe abomaki ye. 25Moyize akanisaki ete bandeko na ye bakososola ete Nzambe alingaki kosalela ye mpo na kokangola bango ; nzoka nde, bango basosolaki yango te. 26Na mokolo oyo elandaki, Moyize akutaki bato ya Isalaele mibale kobunda. Boye, alingaki kozongisa boyokani kati na bango. Alobaki na bango : “Ah baninga na ngai, bozali bandeko ; mpo na nini bozali kosalana mabe ?”

27Kasi moto oyo azalaki konyokola ndeko na ye, atindikaki Moyize mpe alobaki : “Nani atie yo mokonzi mpe mosambisi na biso ? 28Boni, olingi koboma ngai ndenge obomaki moto ya Ejipito lobi ?”

29Tango Moyize ayokaki bongo, akimaki na mokili ya Madiani epai wapi avandaki lokola mopaya mpe abotaki bana mibale ya mibali.

30Na sima na mibu tuku minei, anjelu moko abimelaki Moyize na esobe, pene ya ngomba Sinayi, kati na moto ya mwa nzete oyo ezalaki kopela. 31Tango Moyize amonaki yango, akamwaki makasi. Mpe awa azalaki kopusana mpo na kotala yango malamu, ayokaki mongongo na Yawe koloba : 32“Nazali Nzambe ya bakoko na yo, Nzambe ya Abrayami, ya Izaki mpe ya Jakobi.” Moyize alengaki na somo mpe akokaki kutu kotala te.

33Bongo, Nkolo alobaki na ye : “Longola basandale na yo, pamba te esika oyo otelemi ezali mabele ya bule. 34Namoni minyoko ya bato na ngai na Ejipito. Nayoki kolela na bango mpe nakiti mpo na kokangola bango. Mpe yaka sikʼoyo, nakotinda yo ete ozonga na Ejipito.”

35Ezalaki kaka Moyize oyo bandeko na ye baboyaki tango balobaki : “Nani atie yo mokonzi mpe mosambisi ?” nde Nzambe atindaki mpo ete azala mokonzi mpe mokangoli na bango, na lisungi ya anjelu oyo abimelaki ye na mwa nzete. 36Abimisaki bango na Ejipito, na nzela ya bikamwa mpe ya bilembo minene oyo asalaki kuna, na ebale monene ya Motane mpe na esobe, mibu tuku minei.

37Ezalaki kaka Moyize wana oyo alobaki na bato ya Isalaele : “Nzambe akotindela bino mosakoli moko lokola ngai, oyo akowuta kati na bandeko na bino.” 38Tango bakoko na biso basanganaki na esobe, ezalaki ye nde azalaki molobeli kati na bakoko na biso mpe anjelu oyo asololaki na ye na ngomba ya Sinayi epai wapi azwaki Maloba ya bomoi mpo na kopesa biso.

39Kasi, bakoko na biso baboyaki kotosa ye. Batombokelaki ye mpe bazwaki likanisi ya kozonga na Ejipito. 40Balobaki na Aron : “Salela biso banzambe oyo bakotambola liboso na biso. Pamba te, toyebi te soki makambo nini ekomeli Moyize oyo abimisaki biso na Ejipito !” 41Ezalaki na mikolo wana nde basalaki ekeko ya mwana ngombe. Bapesaki makabo na ekeko yango mpe basalaki feti mpo na kopesa lokumu na misala ya maboko na bango.

42Kasi Nzambe apesaki bango mokongo mpe atikaki bango ete basambela minzoto ndenge ekomama na buku ya basakoli : “Bato ya Isalaele,
bozalaki kobonzela ngai mbeka
mpe kopesa ngai makabo,
mibu tuku minei na esobe ?

43 Bomemaki nde ndako ya kapo ya Moloki
mpe monzoto ya nzambe na bino Rofa,
banzambe ya bikeko oyo bosalaki
mpo na kokumamela !
Yango wana, nakotinda bino na bowumbu,
mosika koleka Babiloni !”

44Bakoko na biso bazalaki na Ndako ya kapo ya Boyokani na esobe. Batongaki yango ndenge Nzambe atindaki Moyize, kolanda ndakisa oyo amonaki. 45Sima ya kozwa Ndako ya kapo yango, bakoko na biso na bokambami ya Jozue, bamemaki yango tango babotolaki mikili ya bapagano, mikili oyo Nzambe abenganaki liboso na bango. Mpe Ndako ya kapo yango etikalaki kuna kino na tango ya Davidi ; 46oyo azwaki ngolu na miso ya Nzambe mpe asengaki ete atongela Nzambe ya Jakobi ndako. 47Kasi Salomo nde moto atongelaki ye ndako.

48Nzoka nde, Ye oyo Aleki Likolo avandaka te na bandako oyo bato batonga ndenge mosakoli aloba :
49 “Likolo ezali kiti na ngai ya bokonzi,
mpe mabele ezali enyatelo ya makolo na ngai.
Ndako ya ndenge nini penza bokoki kotongela ngai ?
Elobi Yawe,
To esika ya bopemi ya ndenge nini penza bokoki kobongisela ngai ?

50 Boni, ezali maboko na ngai te nde esalaki biloko wana nyonso ?”

51Bato ya mito makasi, ya mitema mabanga mpe bakufa matoyi ! Bozali kaka ndenge moko na bakoko na bino : botelemelaka tango nyonso Molimo Mosantu ! 52Boni, ezalaki solo ata na mosakoli moko oyo bakoko na bino bazangaki konyokola ? Kutu, babomaki ezala basakoli oyo basakolaki koya ya Moyengebene, Ye oyo bosili sikʼoyo koteka mpe koboma, 53bino bato oyo bozwaki Mobeko ya Nzambe na nzela ya ba-anjelu, kasi botosaki yango te.

Babomi Etieni na mabanga

54Tango bato ya Likita-monene bayokaki bongo, batombokaki makasi mpe bakomaki kolia mino mpo na Etieni. 55Kasi, lokola Etieni atondisamaki na Molimo Mosantu, atalaki na likolo, amonaki nkembo ya Nzambe mpe Yesu atelema na loboko ya mobali ya Nzambe.

56Alobaki : “Botala, namoni likolo efongwami mpe Mwana na Moto atelema na loboko ya mobali ya Nzambe !”

57Bongo, bakangaki matoyi na bango, bagangaki makasi penza mpe bango nyonso basangelaki ye, 58bamemaki ye libanda ya engumba mpe babambaki ye mabanga. Na tango wana, batatoli batikaki bilamba na bango epai ya elenge mobali moko na kombo ya Saulo.

59Wana bazalaki kobamba ye mabanga, Etieni abondelaki : “Nkolo Yesu, yamba molimo na ngai !”

60Bongo, afukamaki mpe agangaki makasi : “Nkolo, kotangela bango lisumu oyo te !”

Tango kaka Etieni alobaki bongo, akufaki.
Copyright information for LinMNB