Colossians 1

Ebandeli ya mokanda

1Ngai Polo, ntoma ya Klisto Yesu na mokano ya Nzambe, mpe ndeko na biso Timote, 2totindi mokanda oyo epai ya basantu mpe bandeko bandimi kati na Klisto, baoyo bazali na Kolosai.

Tika ete ngolu mpe kimia oyo ewuti na Nzambe Tata na biso, ezala na bino.

Libondeli ya kozongisa matondi

3Tozongisaka matondi tango nyonso epai ya Nzambe, Tata na Nkolo na biso Yesu Klisto, tango tobondelaka mpo na bino. 4Pamba te tosiʼtoyoki sango ya kondima na bino kati na Klisto Yesu, mpe bolingo oyo bozali na yango mpo na basantu nyonso. 5Kondima mpe bolingo oyo ewuti na elikya oyo babombeli bino na Likolo, mpe oyo bosiʼboyoka sango na yango kati na Liloba ya solo, sango malamu 6oyo ekomaki kino epai na bino. Na mokili mobimba, sango malamu oyo ezali kobota mbuma mpe ezali kokende liboso, kaka ndenge esalaki kati na bino, banda mokolo oyo boyokaki yango mpe bososolaki ngolu ya Nzambe kati na bosolo na yango nyonso.

7Sango malamu yango boyekolaki yango na molingami Epafras, moninga na biso ya mosala, oyo azali mosali ya sembo ya Klisto mpo na bino ; 8mpe ye moto ayebisaki biso bolingo na bino oyo Molimo apesa bino.

KATI NA KRISTO TOZALI NA NYONSO

Libondeli ya Polo mpe nzembo na Yesu Klisto

9Yango wana, banda mokolo oyo toyokaki sango na bino, totikaka te kobondela mpo na bino, mpe tosengaka Nzambe ete alakisa bino mokano na ye na mobimba penza, na nzela ya bwanya nyonso mpe bososoli nyonso oyo Molimo apesaka. 10Mpe tobondelaka bongo, mpo ete bokoka kozala na bizaleli oyo ekoki liboso na Nkolo, mpo ete bosepelisa ye na ndenge nyonso : bobota mbuma kati na mosala nyonso ya malamu mpe bokola kati na koyeba Nzambe. 11Bongo Nzambe akolendisa bino na nguya nyonso, oyo ewutaka na nguya ya nkembo na ye, mpo ete bokoka kozala bato ya koyika mpiko mpe ya kokanga motema na makambo nyonso, 12mpe bozongisaka matondi na esengo nyonso, na Tata, ye oyo apesa bino makoki mpo ete bosangana na bomengo ya basantu kati na Bokonzi ya pole. Pamba te :

13Akangola biso na nse ya bokonzi ya molili, mpe amema biso na Bokonzi ya Mwana na ye ya bolingo. 14Na ye nde tokangolami mpe tozui bolimbisi ya masumu. 15Ye azali elilingi ya Nzambe oyo amonanaka te, Abotami liboso ya oyo nyonso Nzambe akela. 16Pamba te, biloko nyonso ekelama na nzela na ye : biloko oyo ezali na likolo mpe oyo ezali na nse, biloko oyo emonanaka, na oyo emonanaka te, ata bokonzi mpe lokumu, bakonzi mpe banguya ; biloko nyonso ekelama na nzela na ye mpe mpo na ye. 17Ye azali liboso ya biloko nyonso, mpe kati na ye nde biloko nyonso ezali na esika na yango. 18Azali motu ya nzoto, nzoto yango nde Lingomba ; azali ebandeli mpe Abotami liboso na kati ya bato oyo bakufa, mpo ete azala Mokonzi kati na biloko nyonso. 19Pamba te Nzambe asepelaki ete bonzambe na ye nyonso evanda kati na Mwana na ye. 20Mpe na nzela ya Mwana na ye, azongisi bondeko kati na biloko nyonso mpe na ye moko ; ata biloko oyo ezali na mokili to mpe oyo ezali na likolo, tango atiaki kimia na nzela ya makila ya Mwana na ye, oyo esopanaki na ekulusu.

21Nzoka nde, kala bozalaki mosika na Nzambe mpe bozalaki banguna na ye mpo na makanisi na bino mpe mpo na misala ya mabe oyo bozalaki kosala. 22Kasi sikʼoyo Nzambe azongisi bondeko kati na bino na ye, na nzela ya liwa ya nzoto ya Mwana na ye, mpo ete amema bino liboso na ye : basantu, bato bazangi likambo oyo bakoki kofunda bino na yango. 23Esengeli bokoba kati na kondima, bozala ya kopikama malamu penza, mpe botelema ngwi. Bondima te ete bapengwisa bino na elikya oyo bozwaki tango boyokaki sango malamu. Sango malamu oyo bateya na bato nyonso oyo bazali na mokili, oyo ngai Polo nakoma mosali na yango.

Etumba ya ntoma mpo na lingomba

24Sikʼoyo, nazali kosepela mpo na bapasi oyo nazali komona mpo na bino, mpe nazali kokokisa kati na nzoto na ngai bapasi oyo ezangi na bapasi ya Klisto mpo na nzoto na ye, nzoto na ye nde Lingomba. 25Nakoma mosali ya Lingomba na etinda oyo Nzambe apesaki ngai mpo ete nateya bino Liloba ya Nzambe na mobimba na yango. 26Liloba yango nde sekre oyo ezalaki ya kobombama banda na batango ya kala mpe na mabota ya kala. Kasi Nzambe alakisi yango sikʼoyo epai ya basantu. 27Na bango nde Nzambe aponaki kolakisa bomengo ya nkembo ya sekre na ye mpo na bato oyo bazali Bayuda te. Mpe sekre yango, yangʼoyo : Klisto kati na bino, elakisi ete bozali na elikya ya kosangana na nkembo na Nzambe.

28Ezali Klisto yango nde tozali kosakola ; tozali kokebisa mpe koteya moto nyonso na bwanya nyonso, mpo ete tokoka kokomisa moto nyonso, moto ya kokoka kati na Klisto liboso ya Nzambe. 29Tala tina nasalaka na makasi nyonso mpe nabundaka na nzela ya makasi na ye oyo esalaka kati na ngai na nguya nyonso.
Copyright information for LinMNB