Ephesians 4

BOMOI YA LISANGA YA SIKA

Tobatela Bomoko

1Ngai oyo nazali moto ya boloko mpo na Nkolo, nazali kosenga bino ete botambola na lolenge oyo ekoki na ebiangeli oyo Nzambe abengaki bino: 2bozala bato ya komikitisa tango nyonso, bato ya boboto, mpe ya motema molayi. Bosunganaka bino na bino kati na bolingo. 3Bosala makasi mpo na kobatela bomoko oyo Molimo apesaka, na nzela ya kimia oyo ezali kokangisa bino lisanga moko. 4Nzoto ezali kaka moko, Molimo mpe azali kaka moko; ndenge moko mpe, Nzambe abenga bino mpo na elikya kaka moko.

5Nkolo azali kaka moko, kondima ezali kaka moko, mpe libatisi mpe ezali kaka moko. 6Nzambe azali kaka moko, mpe azali Tata ya bato nyonso, ye oyo azali Nkolo ya nyonso, asalaka kati na nyonso, mpe azali kati na nyonso.

7Moko moko na biso bapesaki ye makabo, ndenge Kristo ye moko alingaki kopesa.

8Yango wana elobama : “Tango amataki na Likolo, amemaki bakangami mpe apesaki makabo na bato.”

9Nzokande, liloba oyo : “amataki, elakisi nini? Yango elakisi ete: liboso akitaki penza na nse ya mabele.” 10Moto oyo akitaki, ezali kaka ye wana oyo amataki na likolo penza koleka likolo nyonso, mpo ete atondisa mokili mobimba.

11Ezali ye moto apesaki likabo na bato mosusu mpo bazala bapostolo, basusu baprofeta, basusu bapanzi Sango Malamu, basusu babateli, mpe basusu balakisi. 12Asalaki bongo, mpo na kobongisa basantu basala mosala na bango, mpo ete nzoto ya Kristo etongama malamu, 13kino biso nyonso tokokoma na bomoko kati na kondima mpe kati na koyeba Mwana na Nzambe, mpe kokoma bato penza oyo basiʼbakoli, bato oyo basiʼbakokani na bonene ya kokokisama ya Kristo. 14Bongo tokozala lisusu bana mike te, oyo bazali kotindikama-tindikama na bambonge mpe komemama-memama bipai na bipai na mipepe nyonso ya mateya oyo evandi kati na lokuta ya bato, mpe kati na mayele na bango ya mabe ya kosalela banzela ya mabe mpo na kobungisa bato.

15Nzokande, na nzela ya koloba solo kati na bolingo, tokokola na makambo nyonso kino na ye oyo azali Motu, ye nde Kristo.

16Ezali wuta na ye, nde nzoto mobimba ekangani malamu penza mpe esangani esika moko na nzela ya misisa oyo epesaka yango bilei. Bongo tango eteni moko na moko ezali kosala mosala na yango na ndenge ekoki, nzoto mobimba ezali kokola mpe ezali komitonga yango moko kati na bolingo.

Bomoi Kati Na Kristo

17Yango wana, nalobi boye mpe nazali kokebisa bino kati na Nkolo ete, botika bizaleli ya bapakano, bango balandaka makanisi na bango oyo ezanga tina. 18Pamba te, makanisi na bango ezali molili mpe bazali ya kokabwana na bomoi ya Nzambe, mpo na kozanga koyeba oyo ezali kati na bango, oyo ewutaka na mitema na bango ya mabanga.

19Babungisa makambo nyonso oyo bomoto esengaka, bamibwaka na makambo ya soni, mpo na kosala na lokoso nyonso makambo nyonso ya bosoto.

20Kasi bino, boyekolaki Kristo na ndenge wana te. 21Nazali na elikya ete boyokaki makambo oyo etali ye, mpe bateyaki bino kati na ye, na ndenge penza ya makambo ya solo oyo ezali kati na Yesu. 22Bongo boboya bomoi na bino ya kala, bobwaka bomoto na bino ya kala, oyo ezali kobeba na baposa na yango ya mabe. 23Esengeli ete mitema na bino mpe makanisi na bino ekoma ya sika penza; 24mpe bolata moto ya sika, oyo akelama na lolenge ya Nzambe, kati na bosembo mpe bosantu ya solo.

Bomoi Kati Na Bolingo

25Yango wana, moko na moko na kati na bino esengeli abwaka lokuta, mpe aloba makambo ya solo na moninga na ye; pamba te, biso nyonso tozali biteni ya nzoto moko.

26Soki bosiliki, bosala masumu te; esengeli ete kanda na bino esila liboso ete mokolo ekoma na suka na yango. 27Bopesa zabolo nzela te. 28Moto oyo azalaki koyiba, atika koyiba; kasi esengeli asala, asala na maboko na ye moko mosala oyo ezali malamu, mpo ete azala na eloko oyo akoki kopesa na moto oyo azali kokelela.

29Botika te ete ata liloba moko ya mabe ebima na minoko na bino, kasi kaka oyo ezali malamu, oyo ekoki kokolisa kondima, na ndenge ya posa na bango, mpo ete yango epesa bolamu na bato oyo bazali koyoka yango.

30Boyokisa Molimo Mosantu ya Nzambe mawa te, na nzela na ye nde batiaki bino elembo, mpo na mokolo ya kokangolama. 31Tika ete makambo nyonso ya bololo, kosilika, kanda, kongala, kofinga, elongwa kati na bino, ndenge moko mpe na makambo nyonso ya mabe. 32Bozala bato ya malamu moko epai ya mosusu, bozala bato ya motema mawa, mpe bolimbisana moko na moko, ndenge Nzambe mpe alimbisa bino kati na Kristo.
Copyright information for LinMNB