Galatians 2

Polo Mpe Bapostolo Mosusu

1Sima ya bambula zomi na minei, nazongaki lisusu na Yeruzakm elongo na Barnabas, namemaki mpe Tito. 2Nakendeki kuna mpo na kotosa emoniseli oyo namonaki, mpe nazalaki kolimbokla bango Sango Malamu oyo nazalaki koteya kati na bato ya bikolo ya bapaya. Kasi nasalaki yango na esika ya biso moko kaka, epai bato oyo bazalaki komonana ete bazali bakambi, na kobanga ete mosala oyo nasalaki kala mpe oyo nazali kosala sikʼoyo emonana pamba. 3Yango wana, atra Tito oyo azalaki na ngai elongo, ata azalaki mogreki, batindaki ye na makasi te ete akatisa Nzoto. 4Kasi likambo yango ebimaki mpo na bandeko ya lokuta oyo bakotaki kati na biso na mayele mabe, oyo bakotaki kaka mpo na kotala bonsomi oyo tozali na yango kati na Klisto Yesu, mpo ete bakomisa biso bawumbu. 5Kasi tondimaki makambo ya bato wana te ata mpo na mwa tango, mpo ete solo ya Sango Malamu etikala elongo na bino. 6Nzoka nde, bato oyo bazalaki komonana ete bazali bato ya tina mingi—ata bazalaki bato ya ndenge nini, wana etali ngai te, pamba te Nzambe atalaka elongi ya moto te—bato wana babakisaki eloko moko te na mateya na ngai. 7Nzoka nde, bamonaki ete Nzambe apesaki ngai mokumba ya koteya Sango Malamu na bato ya bikolo ya bapaya, ndenge moko mpe apesaki Piere mokumba ya koteya yango epai ya bayuda. 8Pamba te, moto oyo azalaki kosala kati na Piere mpo azala ntoma ya bayuda, azalaki mpe kosala kati na ngai mpo nazala ntoma ya bato ya bikolo ya bapaya. 9Bongo Zaki, Piere mpe Jean, baoyo bazalaki komonana lokola makonzi ya Lingomba, bandimaki ete Nzambe apesaki ngai mokumba wana ; yango wana bapesaki biso mbote, ngai na Barnabas, mpo na kolakisa ete tokomi lisanga moko. Bongo bamonaki malamu ete biso tokende epai ya bato ya bikolo ya bapaya, mpe bango bakende epai ya bayuda. 10Basengaki biso kaka ete, tokanisaka kosunga babola. Mpe nasalaki nyonso mpo na kokokisa mokumba yango.

Polo Apameli Piere

11Kasi tango Piere ayaki na Antioshe, naboyaki ezaleli na ye liboso ya bandimi, pamba te asalaki mabe. 12Pamba te, liboso ete bato oyo bawutaki epai ya Zaki bakoma, Piere azalaki kolia esika moko na bandeko oyo bazalaki bayuda te. Kasi tango bakomaki, abendaki nzoto mpe akabwanaki na bango, mpo azalaki kobanga bayuda. 13Bayuda mosusu basanganaki na kokosana na ye, na ndenge ete ata Barnabas mpe alandaki kokosana na bango. 14Kasi tango namonaki ete bazalaki kotambola sembo te, na ndenge solo ya Sango Malamu ezali kosenga, nalobaki na Piere na miso ya bandimi nyonso : “Soki yo moto ozali moyuda, ozali kolanda ezaleli ya bato ya bikolo ya bapaya, kasi ozali kolanda te ezaleli ya bayuda, bongo ndenge nini ozali kotinda bato ya bikolo ya bapaya balanda ezaleli ya bayuda ?”

Kaka Kondima Nde Ekomisaka Bato Na Sembo

15Biso baoyo tozali bayuda ya mbotama, kasi tozali bato ya bikolo mosusu te baoyo bazali bato ya masumu, 16toyebi ete moto akoki kokoma sembo te na nzela ya kotosa Mibeko, kasi kaka na nzela ya kondima Yesu Klisto. Yango wana, biso mpe tondimelaki Klisto Yesu na tina ete Nzambe akomisa biso sembo na nzela ya kondima oyo tozali na yango kati na Klisto, kasi ezali te mpo na kotosa Mibeko. Pamba te, moto moko te akoki kokoma sembo na nzela ya kotosa Mibeko. 17Nzoka nde, tango tozali koluka kokoma sembo kati na Klisto, emonani polele ete biso moko mpe bayuda tozali bato ya masumu ; yango elingi koloba ete Klisto azali mosali ya masumu ? Ata moke te ! 18Pamba te, soki nazali kotonga lisusu makambo oyo ngai napanzaki, wana elakisi ete nazali mobuki ya Mibeko. 19Pamba te ngai, na nzela ya Mibeko, nazali mokufi mpo na Mibeko, mpo ete nakoka kozala na bomoi mpo na Nzambe. 20Basibabaka ngai na ekulusu elongo na Klisto ; mpe nazali na bomoi te, kasi Klisto nde moto azali na bomoi kati na ngai. Bomoi oyo nazali na yango sikʼoyo kati na nzoto, nazali na yango na nzela ya kondima kati na Mwana ya Nzambe, ye alingaki ngai mpe amikabaki mpo na ngai. 21Natie ngolu ya Nzambe pembeni te, pamba te soki bato bakoki kokoma sembo na nzela ya kotosa Mibeko, wana Klisto akufaki kaka pamba.
Copyright information for LinMNB