Hebrews 2

Lobiko oyo Mwana amemela biso, tomona yango pamba te

1Yango wana, esengeli tolanda malamu penza makambo oyo toyokaki, soki te tokobunga nzela.

2Pamba te, soki maloba oyo baanzelu balobaki emonanaki ete ezalaki ya solo, mpe, soki bato oyo babukaki mibeko mpe bazangaki botosi bazwaki penza etumbu oyo ekokaki mpo na bango, 3bongo ndenge nini tokokima kozwa etumbu soki tozali kotala Pamba lobiko ya monene boye, oyo Nkolo ye moko ateyaki yango liboso, mpe baoyobayokaki yango balakisaki biso ete yango ezali ya solo ? 4Nzambe mpe atatolaki mpo na yango, na nzela ya bilembo, makambo ya nsomo, mpe makamwisi ya ndenge na ndenge, mpe na nzelaya makabo ya Molimo Mosantu oyo akabolaki na ndenge ye moko alingaki.

Nzambe atia biloko nyonso na nse ya bokonzi ya Mwana

5Pamba te, Nzambe atia mokili oyo ezali koya, oyo tozali kolobela, na nse ya bokonzi ya baanzelu te. 6Kasi moto moko atatolaki boye, na esika moko : Moto azali nani
mpo okanisa ye,
to mpe mwana ya moto azali nani
mpo ete obatela ye ?

7 Okitisaki ye na nse ya baanzelu
mpo na mwa tango moke ;
otondisaki ye na nkembo
mpe na lokumu,

8 mpe otiaki biloko nyonso
na nse ya makolo na ye.

Tango atiaki biloko nyonso na nse ya bokonzi na ye, atikaki ata eloko moko te ezanga kozala na nse ya bokonzi na ye. Nzokande sikʼoyo, naino tomoni te ete biloko nyonso ezala na nse ya bokonzi na ye.
9Kasi tala likambo tozali komona mpo na Yesu : Nzambe atiaki ye na nse ya baanzelu mpo na mwa tango moke, mpo ete na nzela ya ngolu ya Nzambe akoka kokufa mpo na bato nyonso. Kasi sikʼoyo, atondi na nkembo mpe lokumu, mpo na liwa oyo anyokwamaki na yango.

Mwana Nzambe azali ndeko ya bato nyonso

10Yango ezalaki malamu ete Nzambe, ye oyo asalaki mpe abatelaka biloko nyonso, akoka kokomisa Yesu moto ya kokoka na nzela ya bapasi, mpo ete amema bana ebele basangana na nkembo na ye. Pamba te Yesu azali moto oyo amemaka bango na lobiko. 11Pamba te, moto oyo akomisaka peto, na baoyo bakomisi bango bosantu, bazali bango nyonso bato ya libota moko. Yango wana, Yesu azali na soni te mpo na kobenga bango bandeko na ye ; ndenge 12alobaki : Nakoyebisa kombo na yo
epai ya bandeko na ngai ;
nakoyemba masanzoli na yo
na kati ya lingomba.

13Alobaki lisusu : Nakotia elikya na ngai na ye ;

mpe alobaki lisusu : Nazali awa, elongo na bana oyo Nzambe apesaki ngai.

14Lokola bana bazali bato ya mosuni mpe ya makila, Yesu mpeakomaki lokola bango mpe asanganaki na bomoto na bango, mpo ete na nzela ya liwa naye, akoka kobebisa Zabolo ye oyo azalaki na nguya ya liwa, 15mpe akangola baoyo nyonso, kati na bomoi na bango mobimba, bazalaki bawumbu, na nzela ya kobanga liwa.

16Pamba te, ya solo penza, Yesu ayaki mpo na kosalisa baanzelute, kasi ayaki mpo na kosalisa libota ya Abraham. 17Yango wana, Nzambe akomisaki ye lolenge moko na bandeko na yena makambo nyonso, mpo ete akoka kokoma moto oyo ayokelaka bato mawa mpe Mokonzi ya banganga-Nzambe ya sembo, kati na mosala ya Nzambe, mpo ete masumu ya bato ekoka kolimbisama. 18Mpe sikʼoyo akoki kosalisa baoyo bazali kokutana na komekama, Pamba te ye moko mpe akutanaki na komekama mpe amonaki pasi.
Copyright information for LinMNB