Hebrews 4

1Yango wana, lokola elaka ya kokota na bopemi ya Nzambe ezali naino, tokeba ete moto moko te na kati na bino ezanga kokota na kopema yango. 2Pamba te, biso mpe, bateyaki biso Sango Malamu ndenge mpe bateyaki bango ; kasi Liloba oyo bayokaki esalisaki bango na eloko moko te, pamba te tango bayokaki yango, bayambaki yango na kondima te. 3Pamba te, biso baoyo tondima, tozali kokota na bopemi wana, ndenge Nzambe alobaki : Yango wana, nalapaki ndayi
kati na kanda na ngai :
Bakokota te na bopemi
na ngai !

Alobaki bongo atako misala na ye esiʼesila wuta na tango asalaki mokili.
4Pamba te, na esika moko, elobama boye mpo na mokolo ya sambo : Bongo na mokolo ya sambo, Nzambe apemaki na misala na ye nyonso.

5Mpe alobaki lisusu na eteni yango : Bakokota te na bopemi na ngai.

6Emonani polele ete bato mosusu esengeli bakota na bopemi wana. Nzokande, baoyo bazalaki bato ya liboso mpo na koyoka Sango Malamu, bakotaki te mpo na kozanga botosi na bango. 7Yango wana Nzambe atiaki lisusu mokolo moko, oyo azali kobenga lelo. Alobaki mpo na yango kala penza na nzela ya David, ndenge elobamaki liboso : Lelo,
soki boyoki mongongo na ngai,
boyeisa mitema na bino makasi te.

8Pamba te, soki Zosue apesaki bango bopemi, mbele sima penza, Nzambe alingaki lisusu te koloba mpo na mokolo mosusu. 9Bongo etikali na bopemi moko oyo ezali lokola mokolo ya sambo oyo Nzambe apemaki. 10Pamba te, moto oyo akoti na bopemi ya Nzambe, apemi na misala na ye, ndenge Nzambe mpe apemaki na oyo ya ye.

11Yango wana, tosala makasi mpo na kokota na bopemi wana mpo etemoto moko te akweya na kolanda ndakisa na bango ya kozanga botosi. 12Pamba te Liloba ya Nzambe ezali na bomoi mpe na nguya ; ekotaka koleka kutu mopanga oyo ezali na mino na ngambo nyonso mibale, ekomaka kino na kokabola elimo na molimo, mikuwa na mafuta oyo ezalaka na kati ya mikuwa ; mpe etalaka malamu-malamu makanisi mpe mikano ya mitema ya bato. 13Eloko moko te na kati ya biloko nyonso oyo esalama, ezali ya kobombama na miso ya Nzambe. Biloko nyonso ezali polele mpe ezali ya kobombama te na miso ya moto oyo akosambisa biso.

Yesu azali Nganga-Nzambe monene

14Yango wana, lokola tozali na Mokonzi ya banganga-Nzambe ya moneneoyo aleka na Likolo, Yesu Kristo Mwana ya Nzambe, tosimba makasikondima oyo toyambolaka. 15Pamba te, tozali na mokonzi ya banganga-Nzambe oyo akoki kosangana na bapasi na biso ; tozali na ye moko oyo amekamaki na makambo nyonso lokola biso mpe tozali komekama, kasi asalaki masumu te.

16Bongo topusana na elikya nyonso pene-pene na Kiti ya bokonzi ya ngolu, mpo ete bayokela biso mawa mpe tomona ngolu oyo ekosalisa biso na tango malamu.
Copyright information for LinMNB