Hebrews 7

Melkisedeki aleki Aron

1 Melkisedeki azalaki mokonzi ya Salem mpe nganga-Nzambe ya Nzambe oyo aleki likolo. Akutanaki na Abraham, tango Abraham awutaki na etumba sima ya kolonga bakonzi, mpe apambolaki ye. 2Mpe Abraham apesaki ye eteni ya zomi ya biloko nyonso.

Kombo na ye elakisi, liboso : “mokonzi ya bosembo” ; bongo “mokonzi ya Salem”, elingi koloba : “mokonzi ya kimia”.
3Azalaki na tata te mpe mama te, bonkoko te, mokolo ya ebandeli te, mpe ya suka ya bomoi te, kasi azalaki lokola Mwana ya Nzambe, oyo azali Nganga-Nzambe mpo na libela.

4Bomoni, Melkisedeki azalaki moto ya monene penza. Pamba te ata nkoko na biso Abraham apesaki ye eteni ya zomi ya biloko oyo abotolaki na etumba. 5Mibeko ezalaki kosenga na bana ya Levi oyo bazalaki kokoma banganga-Nzambe bazwa eteni ya zomi na bato ya Isaele baoyo bazali bandeko na bango, atako bandeko na bango mpe bazali bana ya libota ya Abraham. 6Melkisedeki abimaki na libota ya Levi te, kasi azwaki eteni ya zomi epai ya Abraham mpe apambolaki ye oyo Nzambe apesaki bilaka. 7Mpe tembe ezali te, Pamba te moto oyo azali moke ye nde moto azwaka lipamboli epai ya moto oyo aleki ye.

8Banganga-Nzambe oyo bazwaka eteni ya zomi bazali bato oyo bakufaka, kasi Melkisedeki, ye oyo azwaki eteni ya zomi oyo, bazali kotatola mpo na ye ete azali na bomoi.

9Tokoki koloba ete, ata Levi, ye oyo azwaka biteni ya zomi, afutaki eteni ya zomi na nzela ya Abraham ; 10Pamba te, tango Melkisedeki akutanaki na Abraham, Levi azalaki naino na kati ya nzoto ya nkoko na ye Abraham.

Kristo azali nganga Nzambe lokola Melkisedeki

11Soki bato bakokaki kokoma bato ya kokoka na nzela ya bonganga-Nzambeya Balevi (Pamba te ezali mpo na yango nde, bato bazwaki Mibeko), mbele tina elingaki kozala lisusu te mpo ete Nganga-Nzambe mosusu aya, oyo azali lokola Melkisedeki, kasi lokola Aron te.

12Pamba te, tango bonganga-Nzambe ebongwani, esengeli mpe Mibeko ebongwana. 13Makambo oyo elobami mpo na moto oyo azali moto ya libota mosusu, mpe moto moko te ya libota na ye asalaki lokola nganga-Nzambe na mesaoyo batumbelaka mbeka. 14Pamba te, eyebani polele ete Nkolo na biso abimaki na libota ya Yudea, mpe mpo na libota ya yudea, Moyize alobaki eloko moko te na oyo etali banganga-Nzambe. 15Mpe likambo oyo tozali kolobela ekomi polele penza ; ete nganga-Nzambe mosusu asiʼabimi, ye oyo akokani na Melkisedeki. 16Akomaki nganga-Nzambe na lolenge ya bitinda ya mibeko ya bomoto te, kasi na lolenge ya nguya ya bomoi oyo ekufaka te. 17Pamba te batatola boye mpo na ye : Ozali Nganga-Nzambe
mpo na libela
lokola Melkisedeki.

18Mibeko oyo ya liboso batiaki pembeni, mpo ezalaki na bolembu mpe ezalaki na tina te, 19Pamba te Mibeko ekomisaki ata eloko moko te eloko ya kokoka. Kasi elikya oyo eleki kitoko eye ; na nzela na yango nde tozali kopusana pene-pene na Nzambe.

Kristo azali Nganga-Nzambe mokonzi mpo na libele

20Mpe makambo yango esalamaki na ndayi oyo Nzambe akataki ! Bato mosusu tango bakomaki banganga-Nzambe, Nzambe alapaki ndayi te mpo na bango, 21kasi Yesu akomaki Nganga-Nzambe na ndayi, tango Nzambe alobaki na ye : Nkolo alapi ndayi,
mpe akobongola makanisi
na ye te :
Ozali Nganga-Nzambe
mpo na libela.

22Mpo na ndayi wana nde Yesu akoma elikya ya boyokani oyo eleki kitoko penza.

23Bango, bazalaki banganga-Nzambe ebele, Pamba te liwa ezalaki kokangisa bango nzela mpo bazala tango nyonso mosala na bango.

24Kasi Yesu, lokola azali na bomoi mpo na libela, azali na bonganga-Nzambe oyo ekoki kokende epai ya moto mosusu te. 25Yango wana azali na makoki mpo na kobikisa, sikʼoyo mpe na batangonyonso baoyo bazali koya epai ya Nzambe na nzela na ye, Pamba te azali tango nyonso na bomoi mpo na kobondela mpo na bango.

26Pamba te, Mokonzi ya banganga-Nzambe ya boye, ye nde akokaki mpo na biso : azali mosantu, azali na likambo ata moko te, azali peto, azaliya kokabwana na bato ya masumu, mpe Nzambe atombola ye likolo penzakoleka likolo. 27Ye azali lokola bakonzi ya banganga-Nzambe mosusu te, azali na posa te ya kotumbaka mbeka mokolo na mokolo, liboso mpo na masumu na ye moko, mpe na sima mpo na masumu ya bato. Atumbaki mbeka mpo na masumuna bango mbala moko mpo na libela, tango amikabaki ye moko. 28Pamba te, Mibeko etiaka bakonzi ya banganga-Nzambe, bato oyobazali na bolembu ; kasi ndayi, oyo eyaki sima ya mibeko, etiaki Mwana, oyo Nzambe akomisa moto ya kokoka mpo na libela.
Copyright information for LinMNB