Hebrews 9

Losambo na boyokani ya kala

1Boyokani oyo ya liboso ezalaki na mibeko mpo na kosambela Nzambe ; ezalaki mpe na esika ya bosantu oyo ezalaki ya mokili oyo. 2Batiaki ndako ya kapo. Bongo eloko oyo batielaka mwinda, mesa, mpemampa oyo bapesi makabo na Nzambe, ezalaki na kati ya eteni na yango ya liboso. Bazalaki kobenga eteni yango : “Esika ya bosantu”. 3Mpe sima ya rido ya mibale, ezalaki esika oyo bazalaki kobenga “Esika eleki bosantu”. 4Mesa ya wolo oyo batumbelaka malasi, mpe sanduku ya boyokani oyo ezalaki ya kozipama na wolo bipai nyonso, ezalaki na kati ya eteni yango. Sanduku yango ezalaki na eloko ya wolo oyo ezalaki na mana, nzete ya Aron oyo ebimisaki makasa, mpe mabanga epai maloba ya boyokani ezalakiya kokomama.

5Mpe na likolo ya sanduku, ba-Sheriben
Ba-sheriben  : ezali lolenge moko ya baanzelu ; basusu babengaka Bankeluba.
ya nkembo bazalaki kozipaesika ya bolimbisi ya masumu na molili ya mapapu na bango. Kasi tokokite sikʼoyo kolobela makambo oyo na molayi nyonso.

6Awa bazalaki kobongisa biloko nyonso na lolenge wana, banganga-Nzambe bazalaki kokota mbala na mbala na eteni ya liboso ya ndako ya kapo, mpo na kosala mosala na bango. 7Kasi na eteni oyo ya mibale, kaka Mokonzi ya banganga-Nzambe nde azalaki kokota kuna, mpe mbala moko kaka na mbula. Azalaki komema makila oyo azalaki kopesa makabo na Nzambe mpo na ye moko, mpe mpo na masumu ya bato.

8Molimo Mosantu alakisi ete, nzela oyo ememaka kino na esika oyo eleki bosantu efungwami naino te, lokola ndako ya kapo ya liboso ezali naino kopikama. 9Yango ezali elembo mpo na tango ya lelo ; ezali kolakisa ete makabo mpe bambeka oyo bapesaka na Nzambe ezali na makoki te mpo na kopetolamitema ya bato oyo basambelaka Nzambe na ndenge wana.

10Pamba te, yango ezalaki kaka makambo etali biloko ya kolia, ya komela, mpe lolenge mingi ya komipetola ; ezalaki mibeko ya bomotooyo evandaki na makasi penza kino na tango Nzambe akobongisa makambo nyonso.

Kristo azali Nganga-Nzambe mokonzi ya biloko ya malamu oyo azwela biso

11Tango Kristo ayaki lokola Mokonzi ya banganga-Nzambe, mpo na kopesabiso biloko oyo asiʼazweli biso, alekaki na ndako ya kapo oyo eleki monene, mpe oyo ezali malamu mingi koleka, oyo esalami na maboko ya bato te, elingi koloba : oyo ezali ya mokili oyo te. 12Akotaki na esika eleki bosantu mbala moko mpo na libela ; apesaki makila ya bantaba te to mpe ya bana ya ngombe te, kasi apesaki makila na ye moko. Mpe na ndenge wana nde, azwelaki biso kokangolama ya seko. 13Pamba te, soki makila ya bantaba na oyo ya bangombe ya mibali, mpe putulu ya ngombe ya mwasi oyo basopaka likolo ya bato oyo bazali mbindo, ekomisaka peto mpo na bopeto ya nzoto, 14esengeli toyeba ete makila ya Kristo, ye oyo, na nzela ya Molimoya seko, amikabaki ye moko epai ya Nzambe lokola likabo oyo ezangi bosoto, ekopetola mitema na biso na misala oyo ememaka na liwa, mpo ete tokoka kosalela Nzambe ya bomoi !

Boyokani ya sika oyo etiamaki na nzela ya mbeka ya Kristo

15Yango wana, Kristo azali moto oyo azongisi boyokani ya sika, mpo ete bato oyo Nzambe abenga bakoka kozwa bomengo ya seko oyo Nzambe alaka bango. Mpe bakoki kozwa bomengo yango, pamba te Kristoasiʼakufa lokola eloko oyo bapesa mpo na kokangola bango na masumuoyo basalaki na tango bazalaki na nse ya bokonzi yaboyokani ya liboso.

16Pamba te, soki moto akomi mokanda mpo ete mokolo akokufa biloko na ye ekoma ya moto boye, moto wana liboso ete azwa biloko yango, esengeli ete ye oyo akomaki mokanda akufa liboso. 17Pamba te mokanda yango ezwaka makasi kaka soki moto oyo akomaki yango akufi. Kasi soki moto oyo akomaki yango azali naino na bomoi, mokanda yango ezalaka na makasi te. 18Yango wana tango boyokani ya liboso ebandaki, basopaki makila. 19Pamba te, tango Moyize asilisaki kotanga mitindo nyonso ndenge yango ekomamaki na kati ya Mibeko, akamataki makila ya bana ngombe, elongo na oyo ya bantaba elongo na mayi, elamba ya lino ya motane mpe etape ya nzete ya Izope, bongo asopelaki buku mpe bato nyonso. 20Alobaki : Oyo ezali makila ya boyokani, oyo Nzambe atindaki bino mpo na kobatela.

21Lolenge moko mpe asopaki makila likolo ya ndako ya kapompe likolo ya biloko nyonso oyo bazalaki kosalela losambo. 22Pamba te, na lolenge ya Mibeko, biloko nyonso ezali kokoma petona nzela ya makila ; mpe bolimbisi ya masumu ezali te soki makila esopani te. 23Bongo tina ezalaki ete, biloko oyo ezalaki bililingi ya biloko oyo ezali na Likolo epetolama na bambeka wana, kasi biloko ya Likolo yangomoko epetolami na bambeka ya malamu mingi koleka oyo wana.

Yesu akotaki na esika eleki bosantu mbala moko mpo na libela

24Pamba te, Kristo akotaki te na esika ya bosantu oyo esalamaki na maboko ya bato, oyo ezalaki kaka elilingi ya oyo ya solo ; kasi akotaki na Likolo penza, mpo ete amonana sikʼoyo liboso na Nzambe mpo na biso.

25Mpe lisusu, ezali mbula na mbula nde Mokonzi ya banganga-Nzambe azalaki kokota na esika ya bosantu elongo na makila oyo ezalaki ya ye te ; kasi Kristo akotaki kuna te mpo amikabaka mbala mingi. 26Soki ezalaki bongo, mbele Kristo alingaki koniokwama mbala mingi banda na ebandeli ya mokili. Kasi sikʼoyo, amonani mbala moko kaka, na suka ya batango, mpo na kolongola masumu na nzela ya mbeka na ye.

27Mpe, lokola esiʼebongisama ete moto nyonso akufa mbala moko, mpe sima na yango kosambisama ekoya, 28ndenge moko mpe, Kristo amikabaki mbala moko kaka mpo na komema masumu ya bato ebele. Akomonana mbala ya mibale, mpo na komema masumute, kasi mpo na komema lobiko na baoyo bazali kozela ye.
Copyright information for LinMNB