John 19:25-30

25Mama na ye, ndeko ya mama na ye, Mariya mwasi ya Klopasi, mpe Mariya ya mboka Magadala, batelemaki pene-pene na ekulusu ya Yesu.

26Tango yesu amonaki mama na ye wana, mpe moyekoli oyo ye azalaki kolinga mingi atelemaki pembeni wana alobaki na mama na ye :

—Mwasi, tala mwana na yo !

27Bongo alobaki na moyekoli wana :

—Tala mama na yo !

Banda tango wana, moyekoli yango akamataki mama ya Yesu na ndako na ye.

28Sima na yango, awa ayebaki ete makambo nyonso ekokisamaki, alobaki boye mpo ete Makomi ekokisama :

—Nazali na posa ya mayi !

29Eloko moko ezalaki wana, ezalaki ya kotonda na vino ya ngayi. Batondisaki eponzi na vino ya ngayi, bakangaki yango na mwa nzete, mpe batombolaki yango kino na monoko ya Yesu.

30Tango Yesu asilisaki komela vino ya ngayi, alobaki :

—Esili !

Alalisaki motu mpe azongisaki molimo.

Copyright information for LinMNB