John 3

Yesu mpe Nikodeme

1Moto moko, azalaki moko na kati ya Bafarizeo, kombo na ye Nikodeme, azalaki mokonzi ya Bayuda. 2Ayaki epai ya Yesu na butu, mpe alobaki na ye :

—Rabi, toyebi ete ozali moteyi oyo awuta epai ya Nzambe pamba te, moto moko te akoki kosala makamwisi oyo yo ozali kosala soki Nzambe azali elongo na ye te !
3Yesu azongisaki mpe alobaki na ye :

—Nalobi na yo ya solo : moto moko te akoki komona Bokonzi ya Nzambe soki abotami mbotama ye sika te !

4Nikodeme atunaki ye :

—Ndenge nini moto oyo asiʼakomi mobange akoki lisusu kobotama ? Akoki kokota na libumu ya mama na ye mpo na mbala ya mibale mpe kobotama ?

5Bongo Yesu azongiselaki ye :

—Nalobi na yo ya solo : soki moto abotami na mayi mpe na Molimo te, akoki te kokota na Bokonzi ya Nzambe.
6Oyo abotami na mosuni azali mosuni, mpe oyo abotami na Molimo azali Molimo. 7Kokamwa te mpo nalobi na yo ete esengeli bobotama mbotama ya sika ! 8Mopepe ekendaka epai yango moko elingaka kokende. Oyokaka makelele na yango, kasi oyebaka te epai yango ewutaka to mpe epai yango ekokende : ezali mpe bongo mpo na moto oyo abotami na Molimo.

9Nikodeme atunaki Yesu :

—Ndenge nini makambo yango ekoki kosalama ?

10Yesu alobaki na ye :

—Boni, ozali moteyi ya Isalayele, mpe oyebi makambo oyo te ?
11Nalobi na yo ya solo : tolobaka makambo oyo toyebi mpe totatolaka makambo oyo tomona, kasi bino bondimaka litatoli na biso te. 12Soki bozali kondima te tango nazali koyebisa bino makambo ya nse, bongo bokondima ndenge nini tango nakoyebisa bino makambo ya Likolo ? 13Moto ata moko te asiʼabuta na Likolo, longola kaka ye oyo akita wuta na Likolo : Mwana na moto.

14Ndenge moko lokola Moyize atombolaki ekeko ya nyoka na esobe, ndenge moko mpe Mwana na moto esengeli batombola ye, 15mpo ete bato nyonso oyo bakondima ye, bazwa bomoi ya seko. 16Pamba te, Nzambe alingaki mokili mingi penza, yango wana apesaki Mwana na ye se moko, mpo ete moto nyonso oyo akondima ye, akufa te, kasi azwa bomoi ya seko.

17Pamba te, Nzambe atindaki te Mwana na ye na mokili mpo apesa yango etumbu, kasi mpo ete mokili ebika na nzela na ye. 18Oyo akondima ye, akozwa etumbu te kasi oyo akondima ye te, asiʼazwi etumbu pamba te aboyi kondima Mwana se moko ya Nzambe. 19Tala etumbu : Moi eyaki na mokili, kasi bato balingaki na bango molili na esika ya moi, pamba te misala na bango ezali mabe. 20Pamba te, moto oyo asalaka mabe ayinaka moi mpe apusanaka pene-pene ya moi te, abangaka soki te misala na ye ekomonana polele. 21Kasi oyo asalaka makambo ya solo, apusanaka pene-pene ya moi, mpo ete misala na ye oyo asalaka kati na Nzambe emonana polele.

Yesu mpe Jean Batiste

22Sima na yango, Yesu akendaki na Yudea elongo na bayekoli. Avandaki kuna elongo na bayekoli na ye, mpe azalaki kobatisa. 23Jean mpe azalaki kobatisa na Enoni, pene-pene na Salimi, mpo mayi ezalaki mingi wana. Bato bazalaki koya wana, mpe bazalaki kozwa libatisi. 24Pamba te na tango wana, batiaki naino Jean na boloko te. 25Bongo tembe ebimaki kati na bayekoli mosusu ya Jean na Moyuda moko mpo na likambo etali kopetolama. 26Bakendaki epai ya Jean mpe balobaki na ye :

—Moteyi, moto oyo azalaki na yo na ngambo mosusu ya Yordani, oyo opesaki litatoli mpo na ye, ye mpe azali kobatisa bato, mpe bato nyonso bazali kokende epai na ye.

27Jean azongisaki :

—Moto akoki kozwa kaka eloko oyo bapesi wuta na Likolo.
28Bino moko bokoki kotatola ete nalobaka : Ngai nazali Kristo te, kasi natindamaki liboso na ye.

29Mwasi azali ya mobali oyo abali ; mpe moninga ya mobali oyo abali, ye oyo atelemi wana mpe azali koyoka ye, azali na esengo mingi tango azali koyoka mongongo ya moninga na ye oyo abali. Esengo na ngai ezali mpe bongo, mpe sikʼoyo esengo yango esili kokokisama. 30Esengeli ye amata mpe ngai nakita.

31Oyo awuti na Likolo azali likolo ya nyonso ; kasi oyo azali ya nse azali ya nse, mpe alobaka makambo ya nse. Oyo awuti na Likolo azali likolo ya nyonso. 32Atatolaka makambo oyo ye amonaki mpe ayokaki. Kasi moto ata moko te azali kondima litatoli na ye. 33Oyo andimi litatoli na ye, andimi ete Nzambe azali solo. 34Pamba te, moto oyo Nzambe atinda alobaka maloba ya Nzambe, mpo Nzambe apesa ye Molimo na ndelo te. 35Tata alingaka Mwana, mpe apesa ye bokonzi likolo ya biloko nyonso. 36Oyo andimi Mwana azali na bomoi ya seko. Oyo akondima Mwana te, akomona bomoi te ; kasi kanda ya Nzambe ekozala likolo na ye.
Copyright information for LinMNB