John 5

Yesu abikisi moto akufa makolo na Yeruzalem

1Sima na yango, Yesu akendaki na Yeruzalem mpo na feti moko ya bayuda. 2Eziba moko ya mayi ezalaki na Yeruzalem pene-pene na Porte ya bameme ; na monoko ya Ki-ebreo babengaka yango Betesda. Liziba yango ezalaki na baveranda mitano. 3Bato mingi ya maladi bazalaki kolala na baveranda yango : bato bakufa miso, bato oyo batambolaka tengu-tengu, na bato oyo bakufa makolo. [Bazalaki kozela ete mayi eningana, 4pamba te, tango na tango anzelu ya Nzambe azalaki koya na eziba mpo na koningisa mayi. Soki mayi eningani, moto oyo azalaki kokita na eziba moto ya liboso, azalaki kobika ata soki maladi na ye ezalaki ya ndenge nini.]

5Moto moko azalaki wana, awumelaki na maladi na ye bambula ntuku misato na mwambe.

6Tango Yesu amonaki ye alali wana, mpe ayebaki ete awumelaki na lolenge wana mikolo mingi, atunaki ye :

—Olingi kobika ?

7Moto ya maladi azongisaki :

—Tata, nazali na moto te oyo akoki kokitisa ngai na eziba soki mayi eningani. Tango nalingaka kokita na mayi, moto mosusu akitaka liboso na ngai.

8Yesu alobaki na ye :

—Telema, kamata litoko na yo mpe tambola !

9Kaka na tango wana moto yango abikaki, akamataki litoko na ye mpe abandaki kotambola.

Nzokande mokolo yango ezalaki mokolo ya saba.
10Bongo Bayuda balobaki na moto oyo abikaki :

—Lelo ezali saba ! Mobeko ezali kopekisa yo mpo na komema litoko na yo.

11Azongiselaki bango :

—Moto oyo abikisi ngai, alobi na ngai : “Kamata litoko na yo mpe tambola.”

12—Bongo batunaki ye lisusu :

—Nani alobaki na yo kamata litoko na yo mpe tambola ?

13Kasi moto oyo abikaki ayebaki te soki moto oyo abikisaki ye azalaki nani ; pamba te Yesu akotaki na kati ya ebele ya bato oyo bazalaki wana.

14Sima, Yesu akutanaki na ye na lopango ya Ndako ya Nzambe mpe alobaki na ye :

—Tala, obiki ; kosala lisusu masumu te mpo ete likambo moko ya mabe koleka ekweyila yo te !

15Bongo moto yango akendaki mpe ayebisaki Bayuda ete ezali Yesu moto abikisaki ye.

16Mpe mpo na yango Bayuda babandaki kotungisa Yesu mpo asalaki makambo wana na mokolo ya saba.

17Kasi Yesu alobaki na bango :

—Tata na ngai azali kosala kino lelo, ngai mpe nazali kosala.

18Yango wana, Bayuda bazalaki koluka nzela ya koboma Yesu ; ezali kaka te mpo atosaki te mokolo ya saba, kasi mpo alobaki lisusu ete Nzambe azali Tata na ye penza, mpe azalaki komitia molongo moko na Nzambe.

Bokonzi ya Yesu

19Yesu azongisaki :

—Ya solo penza nalobi na bino : Mwana akoki kosala eloko moko te na ye moko ; kasi akoki kaka kosala makambo oyo amonaka epai ya Tata. Pamba te makambo nyonso oyo Tata asalaka, Mwana mpe asalaka yango.
20Pamba te, Tata alingaka Mwana, mpe alakisa ye makambo nyonso oyo ye asalaka. Mpe akolakisa ye lisusu makambo minene koleka oyo mpo ete botonda na kokamwa. 21Lokola Tata asekwisaka bakufi mpe apesaka bango bomoi, ndenge moko Mwana mpe apesaka bomoi na moto oyo ye alingi. 22Mpe Tata asambisaka moto te kasi apesa bokonzi yango ya kosambisa bato na maboko ya Mwana 23mpo ete bato nyonso bakumisa Mwana ndenge bakumisaka ye moko Tata. Moto oyo akokumisa Mwana te, azali mpe kokumisa Tata te oyo atindaki ye.

24Ya solo penza nalobi na bino : moto oyo akoyoka maloba na ngai mpe akondima oyo atindaki ngai, azali na bomoi ya seko mpe akozwa etumbu te ; asiʼalongwe na liwa mpe aleki na bomoi. 25Ya solo penza nalobi na bino : tango ezali koya mpe yango esiʼekoki oyo bato bakufa bakoyoka mongongo ya Mwana Nzambe mpe baoyo bakoyoka yango bakozala na bomoi.

26Pamba te, lokola Tata azali na bomoi kati na ye moko, ndenge moko mpe apesaki na Mwana kozala na bomoi kati na ye moko. 27Mpe apesi ye bokonzi ya kosambisa bato mpo azali Mwana na moto.

28Bokamwa te mpo na yango : pamba te, tango ezali koya, oyo bato nyonso bakundama na basimitiele bakoyoka mongongo na ye 29mpe bakobima : baoyo basalaki malamu bakosekwa mpo na kozwa bomoi, kasi baoyo basalaki mabe bakosekwa mpo na kozwa etumbu na bango. 30Nakoki kosala eloko moko te na ngai moko. Nasambisaka kaka ndenge nayokaka. Mpe kosambisa na ngai ezali ya sembo ; pamba te, nalukaka mokano na ngai moko te kasi mokano ya oyo atindaki ngai.

31Soki natatolaka mpo na ngai moko, litatoli na ngai ezali ya solo te. 32Kasi moto mosusu nde atatolaka mpo na ngai ; mpe nayebi ete makambo oyo atatolaka mpo na ngai ezali ya solo. 33Botindaki bato epai ya Jean, mpe ye atatolaki mpo na bosolo. 34Nandimaka litatoli ya moto te, kasi nalobi bongo mpo ete bokoka kobika. 35Jean azalaki mwinda oyo ezali kopela mpe kongenga, kasi bino bolingaki kosepela na kongenga na ye kaka mpo na mwa tango moke.

36Nzokande, nazali na litatoli moko ya monene koleka kutu oyo ya Jean : misala oyo nazali kosala, oyo Tata apesaki ngai mpo nakokisa, elakisaka polele ete Tata moto atindaki ngai. 37Mpe lisusu, ye moko Tata oyo atindaki ngai, atatola mpo na ngai. Kasi naino boyoka mongongo na ye te, naino mpe bomona elongi na ye te. 38Liloba na ye ezali kati na bino te pamba te bondimaka te moto oyo ye atinda. 39Botangaka-tangaka Makomi na molende nyonso, mpo bokanisaka ete bokozwa bomoi ya seko kati na yango. Nzokande, yango etatolaka mpo na ngai ! 40Mpe bolingi te koya epai na ngai mpo na kozwa bomoi.

41Nalukaka te bato bapesa ngai lokumu. 42Kasi nayebi bino ete bozangi bolingo ya Nzambe na mitema na bino. 43Naye na kombo ya Tata na ngai, kasi boyambi ngai te. Kasi soki moto mosusu aye na kombo na ye moko, boyambaka ye ! 44Ndenge nini bokoki kondima soki bolukaka lokumu kati na bino, kasi bolukaka te lokumu oyo ewutaka na Nzambe kaka moko ?

45Bokanisa te ete ngai moto nakofunda bino liboso ya Tata ; kasi ezali Moyize oyo bino botielaka mitema, ye moto akofunda bino.

46Pamba te soki bondimelaki Moyize, mbele bolingaki mpe kondimela ngai ; pamba te ye akomaki mpo na ngai. 47Kasi soki bondimaka Makomi na ye te bongo ndenge nini bokondima maloba na ngai ?
Copyright information for LinMNB