John 9

Yesu abikisi moto akufa miso

1Awa Yesu azalaki kokende, amonaki moto moko akufa miso banda abotama. 2Bayekoli na ye batunaki ye :

—Moteyi nani asalaki masumu ? Ye moko to baboti na ye, mpo abotama na miso ya kokufa ?

3Yesu azongisaki :

—Ezali ye te to mpe baboti na ye te nde basalaki masumu, kasi mpo ete misala ya Nzambe emonana kati na ye.
4Lokola moi ezali naino, esengeli nasala misala na ye oyo atindaki ngai. Butu ezali koya, tango moto ata moko te akokoka kosala mosala. 5Awa nazali naino na mokili, nazali moi ya mokili !

6Sima ya koloba maloba wana, Yesu abwakaki soyi na mabele, asalaki poto-poto na soyi na ye mpe apakolaki yango na miso ya moto wana. 7Bongo alobaki na ye :

—Kende mpe sukola na eziba ya Silowe (“Silowe” elingi koloba : “Motindami”). Mokufi miso akendaki mpe asukolaki ; tango azalaki kozonga, abandaki komona.

8Bato oyo bazalaki kovanda na ye pene-pene, na baoyo bazalaki komona ye tango azalaki kosenga-senga mbongo, batunaki :

—Boni, moto oyo ye te moto azalaki kovanda mpe kosenga-senga mbongo ?

9Bato mosusu bazalaki koloba :

—Ezali ye !

Basusu :

—Te, ye te ; akokani na ye !

Bongo moto wana alobaki :

—Ezali ngai !

10Bongo batunaki ye :

—Miso na yo efungwamaki ndenge nini ?

11Azongiselaki bango :

—Moto oyo babengaka Yesu, asalaki poto-poto, apakolaki ngai yango na miso, bongo alobaki na ngai : “Kende na Silowe mpe sukola !” Tango nakendaki mpe nasukolaki, ma mbala moko nabandaki komona.

12Batunaki ye :

—Moto yango azali wapi ?

Azongisaki :

—Nayebi te !

Bafarizeo basambisi moto oyo abikaki

13Bamemaki moto oyo azalaki na miso ya kokufa epai ya Bafarizeo. 14Nzokande Yesu asalaki poto-poto mpe afungolaki miso ya moto wana na mokolo ya Saba. 15Bafarizeo batunaki ye ayebisa bango soki ndenge nini miso na ye efungwamaki. Azongiselaki bango :

—Atiaki ngai poto-poto na miso, nasukolaki mpe nazali komona.

16Bongo bafarizeo mosusu balobaki :

—Moto oyo awutaki epai ya Nzambe te mpo ete, azali kotosa te mokolo ya saba !

Kasi basusu balobaki :

—Ndenge nini moto ya masumu akoki kosala makamwisi ya ndenge wana ?

Bongo bokabwani ekotaki kati na bango.
17Batunaki lisusu mokufi miso :

—Bongo yo olobi nini mpo na ye ? Pamba te ezali miso na yo nde afungolaki !

Azongiselaki bango :

—Azali moprofeta !

18Bayuda bandimaki te ete azalaki na miso ya kokufa mpe abandaki komona, kino tango babengisaki baboti ya moto yango.

19Batunaki bango :

—Oyo azali mwana na bino, oyo bolobaka ete abotama mokufi miso ? Ndenge nini abandi komona sikʼoyo ?

20Baboti na ye bazongisaki :

—Toyebi ete azali mwana na biso, mpe abotamaki na miso ya kokufa.
21Kasi ndenge abandi komona sikʼoyo, wana toyebi yango te ; mpe toyebi te soki nani afungoli ye miso. Azali mokolo, botuna ye, mpe akoloba mpo na ye moko.

22Baboti na ye balobaki bongo mpo bazalaki kobanga Bayuda. Pamba te, Bayuda basiʼbazwaki mokano ya kobengana na ndako na bango ya mayangani, moto nyonso oyo akondima ete Yesu azali Kristo. 23Yango wana baboti na ye bazongisaki : “Azali mokolo, botuna ye moko !”

24Bongo babengaki lisusu mpo na mbala ya mibale moto oyo azalaki na miso ya kokufa, mpe balobaki na ye :

—Pesa Nzambe nkembo ; biso toyebi ete moto wana azali moto ya masumu.

25Moto yango azongiselaki bango :

—Soki azali moto ya masumu, wana ngai nayebi yango te ; kasi nayebi kaka likambo moko : nazalaki mokufi miso, mpe sikʼoyo nazali komona !

26Bango batunaki ye lisusu :

—Asalaki yo nini ? Afungoli miso na yo ndenge nini ?

27Ye azongiselaki bango :

—Nasiʼnayebisaki bino yango, kasi bolingaki na bino koyokela ngai te. Bongo mpo na nini bolingi lisusu koyoka yango ? Boni, bino mpe bolingi kokoma bayekoli na ye ?

28Bafingaki ye mpe balobaki :

—Yo moto ozali moyekoli na ye ; kasi biso tozali bayekoli ya Moyize !
29Biso toyebi ete Nzambe alobaki na Moyize ; kasi moto wana, toyebi kutu te soki awuti wapi !

30Moto yango azongisaki :

—A, ezali likambo ya kokamwa ! Moto afungoli ngai miso, mpe boyebi kutu te soki awuti wapi.
31Nzokande toyebi ete Nzambe ayokelaka te bato na masumu ; kasi ayokelaka moto oyo atosaka makambo ya Nzambe mpe asalaka mokano na ye. 32Mpe naino toyoka te ete moto afungoli miso ya mokufi miso ya kobotama. 33Soki moto wana awutaki epai ya Nzambe te, mbele akokaki kosala ata eloko moko te.

34Bango bazongiseli ye :

—Yo moto obotama mobimba kati na masumu, mpe ozali koteya biso !

Bongo babenganaki ye.

Bakufi miso ya solo

35Tango Yesu ayokaki ete babengani moto wana, akendaki kokutana na ye mpe alobaki na ye :

—Ondimi Mwana na moto ?

36Moto wana azongiseli ye :

—Tata, ye azali nani, mpo ete nandimela ye ?

37Yesu alobaki :

—Omoni ye, moto oyo azali koloba na yo, ezali nde ye !

38Moto wana alobaki :

—Nkolo, nandimi !

Bongo akumbamelaki ye.

39Bongo Yesu alobaki :

—Ezali mpo na kosambisa, nde nayaki kati na mokili oyo, mpo ete bato bakufa miso bamona, mpe baoyo bazali komona, bakoma bakufi miso !

40Bafarizeo mosusu oyo bazalaki na ye elongo bayokaki maloba yango mpe batunaki ye :

—Bongo biso, tozali mpe bakufi miso ?

41Yesu azongiseli bango :

—Soki bozalaki bakufi miso, mbele bolingaki kozala na masumu te ; kasi lokola bozali koloba ete bomonaka ; boyeba ete masumu na bino ezali kaka na bino.
Copyright information for LinMNB