Luke 19

Zashe azwi lobiko

1Yesu akotaki na Zeriko mpe alekaki na kati na yango. 2Moto moko azalaki wana, kombo na ye Zashe ; ye azalaki mokonzi ya bafutisi mpako, mpe moto ya bomengo. 3Alingaki amona soki Yesu azalaki moto ya lolenge nini, kasi lokola azalaki mokuse, yango wana akokaki komona ye te mpo bato bazalaki ebele penza. 4Akimaki mbangu liboso na bango, mpe amataki na nzete ya Sikomore mpo amona Yesu, pamba te Yesu asengelaki koleka wana.

5Tango Yesu akomaki na esika wana, atalaki na likolo mpe alobaki na ye :

—Zashe, kita noki ! Pamba te, nasengeli kozala lelo na ndako na yo !

6Bongo Zashe akitaki noki na nzete, mpe ayambaki Yesu na esengo monene.

7Tango bato bamonaki bongo, babandaki koyima-yima mpe balobaki :

—Tala, akeyi kovanda na ndako ya moto ya masumu !

8Kasi Zashe atelemaki mpe alobaki na Nkolo :

—Nkolo yoka, nakopesa sikʼoyo kati-kati ya biloko na ngai epai ya babola. Mpe soki nakosaki moto mpo na kozwa eloko na ye, nakozongisela ye yango mbala minei !

9Bongo alobaki na ye :

—Lobiko ekoti lelo na ndako oyo, mpo moto oyo mpe azali mwana ya Abraham.
10Pamba te, Mwana na moto ayaki koluka mpe kobikisa moto oyo abunga !

Lisapo ya mbongo ya mombongo

(Mt. 25.14-30)

11Awa bato bazalaki koyoka makambo wana, Yesu akobaki mpe alobaki na bango lisapo moko, mpo azalaki pene-pene na Yeruzalem, mpe bato bakanisaki ete Bokonzi ya Nzambe elingaki komonana kaka na tango wana.

12Bongo Yesu alobaki :

—Moto moko ya lokumu akendaki na ekolo moko ya mosika mpo na kozwa bokonzi mpe na sima azonga.
13Abengaki basali zomi na kati ya basali na ye, mpe apesaki bango mine zomi ; bongo alobaki na bango :

—Bosala mombongo na mbongo oyo kino tango nakozonga !
14Kasi bato ya ekolo na ye bazalaki koyina ye ; mpe batindaki bantoma na sima na ye mpo na koloba :

“Tolingi te ete moto oyo akoma mokonzi na biso.”

15Awa batiaki ye mokonzi, azongaki na ekolo na ye mpe abengisaki basali oyo ye apesaki mbongo, mpo ayeba soki mbongo boni moko na moko azwaki na mombongo na ye.

16Moto ya liboso ayaki mpe alobaki :

“Mokonzi, mine na yo eboti mine zomi !”

17Mokonzi alobaki na ye : “Osali malamu ! Ozali mosali malamu ! Lokola ozalaki sembo na likambo ya moke. Nakomisi yo moyangeli ya bavile zomi.”

18Moto ya mibale ayaki mpe alobaki na ye :

“Mokonzi, mine na yo eboti mina mitano !”

19Mokonzi na ye azongisaki :

“Kamata mokumba ya koyangela bavile mitano.”

20Bongo mosali mosusu ayaki mpe alobaki :

“Mokonzi, tala mina na yo ! Nabombaki yango malamu na elamba.
21Pamba te, nazalaki kobanga yo, mpo ozali moto ya matata. Ozwaka biloko oyo obombaka te, mpe obukaka biloko oyo olonaka te.”

22Mokonzi azongiselaki ye : “Mosali mabe ! Nakopesa yo etumbu na maloba na yo moko. Oyebaki ete nazali moto ya matata, nazwaka biloko oyo nabombaka te mpe nabukaka biloko oyo nalonaka te ; 23mpo na nini otiaki mbongo na ngai na banki te mpo ete awa nazongi nakoka kozwa yango na benefisi ?”

24Bongo alobaki na bato oyo bazalaki wana :

“Bobotola ye mine yango, mpe bopesa yango na moto oyo azali na mine zomi !”

25Bango balobaki na ye : “Nkolo, ye azali na yango zomi !”

26Mokonzi azongisaki : “Nalobi na bino, moto oyo azali na biloko, bakopesa ye lisusu ; kasi moto oyo azangi biloko, bakobotola ye ata oyo azali na yango. 27Kasi banguna wana, baoyo balingaki te ete nakoma mokonzi na bango, boya na bango awa, mpe boboma bango na miso na ngai !”

MOSALA YA YESU NA YERUZALEM

Bayambi Yesu na nnkembo monene na Yeruzalem

(Mt. 21.1-11,15-17 ; Mk. 11.1-10 ; Jn. 12.12-16)

28Awa Yesu asilisaki koloba makambo wana, akendaki liboso na bango, mpo na kokende na Yeruzalem.

29Tango akomaki pene-pene na Betfaze mpe Betaniya, pembeni ya ngomba oyo babengaka : “Ngomba ya banzete ya Olive”, atindaki bayekoli mibale na kati ya bayekoli na ye 30mpe alobaki na bango :

—Bokende na mboka oyo etalani na bino ; tango bokokota, bokomona mwana ya mpunda bakanga na singa, oyo moto ata moko naino amatela yango te ; bofungola yango, mpe boya na yango.
31Soki moto atuni bino : “Mpo na nini bozali kofungola yango ?”, bozongisela ye : “Nkolo azali na posa na yango !”

32Baoyo batindamaki, bakendaki mpe bakutaki makambo nyonso kaka ndenge ye ayebisaki bango.

33Tango bazalaki kofungola mwana mpunda, bankolo na yango batunaki :

—Mpo na nini bozali kofungola mwana mpunda ?

34Bazongisaki :

—Nkolo azali na posa na yango.

35Bongo bamemaki yango epai ya Yesu ; batiaki bilamba na bango likolo na yango : bongo Yesu avandaki likolo na yango.

36Awa azalaki kokende, bato bazalaki kotanda bilamba na bango na nzela. 37Mpe tango akomaki pene-pene na esika epai nzela ezalaki kokita na Ngomba ya banzete ya Olive, ebele ya bayekoli nyonso batondaki na esengo mpe babandaki kokumisa Nzambe na mongongo makasi mpo na makamwisi nyonso bamonaki. 38Bazalaki koloba :

—Lokumu na Mokonzi oyo aye na kombo ya Nkolo ! Kimia na Likolo, mpe nkembo na bisika bileki likolo !

39Bongo bafarizeo mosusu balobaki na ye wuta na kati ya ebele ya bato :

—Moteyi, pamela bayekoli na yo.

40Bongo Yesu azongiselaki bango :

—Nalobi na bino, soki bango bavandi nye, mabanga ekoganga !

Etumbu ya Yeruzalem

41Tango Yesu akomaki pene-pene na Yeruzalem, mpe amonaki vile yango, abandaki kolela mpo na yango ; 42mpe alobaki :

—Soki yo mpe oyebaki na mokolo ya lelo likambo oyo elingaki komemela yo kimia—kasi sikʼoyo, yango ezali ya kobombama na miso na yo.
43Pamba te mikolo ya pasi ekokweyila yo, tango banguna na yo bakotimola mabulu pembeni na yo, bakozinga yo mpe bakofina-fina yo bipai nyonso. 44Bakokweyisa yo na mabele, yo na bato oyo bazali na kati ya lopango na yo ; mpe bakotika te libanga moko likolo ya libanga mosusu pamba te oyebaki te tango oyo Nzambe ayaki epai na yo.

Yesu ateyi na Ndako ya Nzambe

(Mt. 21.12-13 ; Mk. 11.15-19 ; tala Jn. 2.13-16)

45Bongo akotaki na lopango ya Ndako ya Nzambe, mpe abandaki kobengana bato oyo bazalaki koteka biloko. Alobaki na bango :

46—Ekomama : Ndako na ngai ezali Ndako ya mabondeli, kasi bino bokomisi yango nganda ya miyibi !

47Yesu azalaki koteya mikolo nyonso na Ndako ya Nzambe. Bokonzi ya Banganga-Nzambe, balakisi ya Mibeko, mpe bakonzi ya Bayuda, bazalaki koluka koboma ye ; 48kasi bazwaki nzela ya kosala yango te pamba te bato nyonso bazalaki na posa mingi ya koyoka ye.
Copyright information for LinMNB