Luke 21

Mwasi mobola apesi likabo

(Mk. 12.41-44)

1Tango Yesu azalaki kotala, amonaki bato ya bomengo bazalaki kotia makabo na bango na sanduku ya makabo. 2Amonaki mpe mwasi moko mobola mpe akufela mobali atiaki mbongo mibale ya bibende. 3Bongo Yes alobaki :

—Ya solo nalobi na bino : mwasi oyo mobola, oyo akufela mobali apesi mbongo mingi koleka bato nyonso.
4Pamba te, bato wana nyonso bapesi mbongo oyo bazalaki na yango tina te, kasi ye kati na kokelela na ye, apesi mbongo nyonso oyo azalaki na yango mpo na kosunga bomoi na ye !

Yesu ayebisi bapasi oyo ekokweyila Yeruzalem

(Mt. 24.1-8 ; Mk. 13.1-8)

5Bato mosusu bazalaki koloba mpo na Ndako ya Nzambe, ndenge yango ekomaki ngeli-ngeli mpo na mabanga ya kitoko, mpe mpo na makabo oyo bato bazalaki kopesa na Nzambe. Kasi Yesu alobaki na bango :

6—Nyonso oyo bozali komona, na mikolo ekoya, libanga ata moko te ekotikala likolo ya libanga mosusu, nyonso ekopanzana !

7Bongo bango batunaki ye : —Moteyi, makambo wana ekosalama tango nini ? Elembo nini ekolakisa biso ete makambo wana esengeli kosalama ?

8Yesu azongisaki :

—Bokeba, moto moko te akosa bino. Pamba te bato mingi bakoya na kombo na ngai, mpe bakoloba : “Ezali ngai”, mpe “Tango ekomi pene !” Bolanda bango te !
9Tango bokoyoka basango ya bitumba mpe ya mobulu, bobanga te. Pamba te makambo wana nyonso esengeli kosalama liboso, kasi suka ekoya noki te.

10Bongo alobaki na bango :

—Ekolo moko ekobunda na ekolo mosusu, mpe bokonzi moko ekobunda na bokonzi mosusu.
11Mabele ekoningana makasi penza, nzala makasi mpe bamaladi ya mabe ekongala na bisika mingi, makambo ya somo mpe bilembo ya minene ekomonana wuta na Likolo.

(Mt. 10.17-22 ; Mk. 13.9-13)

12—Kasi liboso ya makambo wana, bakokanga bino, bakonyokola bino, bakosambisa bino na bandako ya mayangani mpe bakotia bino na boloko. Mpe mpo na kombo na ngai, bakomema bino liboso ya bakonzi mpe liboso ya bayangeli. 13Makambo yango ekopesa bino nzela ya kotatola kombo na ngai. 14Botia likambo oyo kati na mitema na bino : bomitungisa te mpo na ndenge bokomilongisa. 15Pamba te, ngai moko nakopesa bino maloba mpe bwania, oyo banguna na bino nyonso bakokoka te kozongisa eyano to kotia na yango tembe. 16Baboti na bino, bandeko na bino ya mibali, bato oyo boyebani na bango, mpe baninga na bino, bakoteka bino mpe bakobomisa basusu kati na bino. 17Bato nyonso bakoyina bino mpo na kombo na ngai. 18Kasi ata suki moko te ya motu na bino ekobunga ! 19Pamba te, soki botelemi ngwi, nde bokobika.

(Mt. 24.15-21 ; Mk. 13.14-19)

20—Tango bokomona Yeruzalem bazingi yango na mapinga ya basoda, boyeba ete tango na yango ya kopanzana ekomi pene-pene. 21Bongo bato oyo bakozala na Yudea esengeli bakima na bangomba ; baoyo bakozala na kati ya Yeruzalem esengeli babima ; mpe baoyo bakozala na bilanga bakota te na kati na yango. 22Pamba te, mikolo wana ekozala mikolo ya etumbu monene, oyo makambo nyonso ekomama ekokokisama.

23Mawa mingi na basi oyo bakozala na zemi mpe na baoyo bakobanda komelisa bana na mikolo wana ! Pamba te, pasi ekozala monene na ekolo oyo, mpe etumbu ekokweyila bato oyo. 24Bakoboma bango na mopanga mpe bakomema bango na bowumbu na bikolo nyonso. Bapakano bakonyata Yeruzalem kino tango ya Bapakano ekokoka.

Koya ya Mwana na moto

(Mt. 24.29-35 ; Mk. 13.24-31)

25—Bongo bilembo ya kokamwa ekomonana na moi, na sanza, mpe na minzoto. Na mokili, bato bakotonda na somo mpe kobanga mpo na lokito monene ya ebale mpe ya bambonge na yango. 26Bato bakokufa na somo mpo na kobanga makambo oyo ekokweya na mokili, pamba te banguya ya likolo ekoningana. 27Bongo bakomona Mwana na Moto akoya kati na mapata na nguya mpe na nkembo monene.

28Tango makambo wana ekobanda kosalama, botelemisa mitu mpe boyika mpiko, pamba te, kokangolama na bino ekomi pene-pene.

29Bongo alobaki na bango lisapo oyo :

—Botala nzete ya figi mpe nzete mosusu nyonso.
30Soki bomoni makasa na yango ebandi kobima, boyebi ete tango ya mbula ekomi pene-pene. 31Bino mpe ndenge moko, tango bokomona makambo wana esalami, boyeba ete Bokonzi ya Nzambe ekomi pene-pene. 32Ya solo na lobi na bino : bato ya tango oyo bakokufa te, liboso ete makambo wana nyonso esalama. 33Likolo mpe nse ekoleka, kasi Maloba na ngai ekoleka te.

34Bokeba mpo ete mitema na bino ekoma kilo te mpo na lokoso ya kolia, kolangwa masanga, mpe mpo na mitungisi ya bomoi, mpo ete mokolo wana ekanga bino te na mbalakata. 35Pamba te, mokolo yango ekokweyela bato nyonso ya mokili mobimba lokola monyama. 36Bokengela malamu mpe bobondelaka tango nyonso, mpo bomonana ete bozali ya kokoka mpo na kokima makambo wana nyonso oyo esengeli koya, mpe mpo bokoka kotelema liboso ya Mwana na Moto !

37Na moi, Yesu azalaki koteya na lopango ya Ndako ya Nzambe, bongo na butu azalaki kobima mpe kokende kolala na ngomba oyo babengaka ngomba ya banzete ya olive. 38Mpe na tongo, bato nyonso bazalaki koya epai na ye na lopango ya ndako ya Nzambe, mpo na koyoka ye.
Copyright information for LinMNB