Luke 5

BAYEKOLI YA LIBOSO

(Mt. 4.18-22 ; Mk. 1.16-20)

1Mokolo moko, Yesu azalaki pembeni ya laki ya Genezareti ; bongo bato mingi bayaki kotonda pembeni na ye mpo na koyoka Liloba ya Nzambe. 2Amonaki babwato mibale pembeni ya laki. Bato oyo balukaka bambisi bakitaki na babwato yango mpe bazalaki kosukola minyama na bango. 3Yesu amataki na bwato moko, oyo ezalaki ya Simon, mpe asengaki Simon apusa yango mwa moke na mayi. Bongo avandaki mpe azalaki koteya bato wuta na bwato.

4Tango asilisaki koloba, alobaki na Simon :

—Pusa bwato epai mayi ezali penza modindo, mpe bobwaka minyama na mayi mpo na kokanga mbisi.

5Simon azongisaki :

—Nkolo, tosali butu mobimba, mpe tozwi ata eloko moko te kasi lokola olobi yango, nakobwaka monyama !

6Tango babwakaki yango, bazwaki bambisi ebele, kutu minyama na bango ebandaki kopasuka. 7Bongo babengaki baninga na bango oyo bazalaki na bwato mosusu mpo baya kosalisa bango. Bayaki, batondisaki babwato nyonso mibale mpe ebandaki kodinda.

8Tango Simon-Piere amonaki bongo, afukamaki liboso ya Yesu mpe alobaki :

—Nkolo, kozala pene-pene na ngai, mpo nazali moto ya masumu !

9Pamba te, somo monene ekangaki ye na baninga na ye nyonso, mpo na komona talo ya bambisi oyo bazwaki. 10Ndenge moko mpe mpo na Zaki mpe Jean, bana ya Zebede, baoyo bazalaki kosala na Simon. Bongo Yesu alobaki na Simon :

—Kobanga te ! Banda lelo, okomi moluki ya bato !

11Tango bamemaki babwato na libongo, batikaki biloko na bango nyonso mpe balandaki Yesu.

Yesu abikisi bato ya maladi mpe alimbisi masumu

(Mt. 8.1-14 ; Mk. 1.40-45)

12Tango Yesu azalaki na moko ya bavile wana, moto moko azalaki ya kotonda na maba na nzoto, azalaki mpe na vile wana. Tango amonaki Yesu, afukamaki elongi na nse mpe abondelaki ye :

—Nkolo, soki olingi, okoki kokomisa ngai peto !

13Yesu asembolaki loboko, asimbaki ye mpe alobaki :

—Nalingi yango, koma peto ! Kaka na tango wana, maba etikaki ye ;
14Bongo Yesu apesaki ye mitindo boye :

—Koyebisa yango na moto te, kasi kende komilakisa epai ya nganga-Nzambe, mpe pesa likabo oyo Moyize atindaki lokola okomi peto mpo yango ezala litatoli mpo na bango.

15Basango ya Yesu ezalaki kaka kopanzana ; mpe bato mingi penza basanganaki mpo na koyoka ye mpe mpo babika na bamaladi na bango. 16Kasi Yesu azalaki kokende na bisika ya ye moko kaka mpe azalaki kobondela.

Yesu abikisi moto akufa makolo

(Mt. 9.1-8 ; Mk. 2.1-12)

17Mokolo moko tango Yesu azalaki koteya, bafarizeo mpe balakisi ya Mibeko, bango bawutaki na bamboka nyonso ya Galileya, ya Yudea, mpe na Yeruzalem, bayaki kovanda wana. Bongo nguya ya Nkolo ezalaki elongo na ye mpo na kobikisa bato ya maladi. 18Bato moko bamemaki moto moko akufa makolo na mbeto. Bazalaki koluka nzela ya kokotisa ye na ndako mpe kotia ye liboso ya Yesu. 19Lokola bamonaki nzela te ya kokotisa ye na ndako, mpo bato bazalaki ebele, bamataki likolo ya ndako, mpe bakitisaki ye na mbeto, na lidusu oyo batobolaki na matolo, na kati-kati ya ebele ya bato, liboso ya Yesu.

20Tango Yesu amonaki kondima na bango, alobaki :

—Mobali, masumu na yo elimbisami !

21Bafarizeo mpe balakisi ya Mibeko babandaki kokanisa na nse ya mitema :

—Moto oyo azali nani oyo azali kobimisa maloba ya kotiola Nzambe ? Nani akoki kolimbisa masumu, soki ezali kaka ye moko Nzambe te ?

22Kasi Yesu ayebaki makanisi na bango mpe atunaki bango :

—Mpo na nini bozali kokanisa ndenge wana na mitema na bino ?
23Eloko nini ezangi pasi, koloba : “Masumu na yo elimbisami”, to koloba : “Telema mpe tambola ?” 24Kasi mpo boyeba ete Mwana ya Moto azali na bokonzi awa na mokili ya kolimbisa masumu… Alobaki na moto oyo akufa makolo :

—Nalobi na yo : telema, kamata mbeto na yo, mpe zonga na ndako na yo !

25Kaka na tango wana, atelemaki liboso na bango, akamataki mbeto oyo alalelaki, mpe azongaki na ndako na ye ; bongo azalaki kokumisa Nzambe.

26Bato nyonso bakamwaki, mpe bazalaki kokumisa Nzambe ; batondaki na somo, mpe bazalaki koloba :

—Lelo oyo tomoni makambo ya kokamwa !

Batieli Yesu tembe

(Mt. 9.9-13 ; Mk. 2.13-17)

27Sima na yango, Yesu abimaki mpe amonaki mofutisi mpako moko, kombo na ye Levi, avandaki na biro oyo azalaki kofutisela mpako. Yesu alobaki na ye :

—Landa ngai !

28Levi atelemaki, atikaki biloko na ye nyonso, mpe alandaki Yesu.

29Bongo Levi asalelaki Yesu feti moko ya kafu-kafu na ndako na ye. Bafutisi mpako mingi mpe bato mosusu bazalaki kolia elongo na bango.

30Kasi bafarizeo mpe balakisi ya Mibeko oyo bazalaki ya lisanga na bango bayima-yimaki na bayekoli ya Yesu :

—Mpo na nini bozali kolia mpe komela elongo na bafutisi mpako mpe bato ya masumu ?

31Yesu azongiselaki bango :

—Bato oyo bazali na nzoto malamu bazalaka na posa ya monganga te, kasi ezali bato ya maladi.
32Nayaki kobenga bato na sembo te, kasi nayaki kobenga bato ya masumu mpo babongola mitema !

(Mt. 9.14-17 ; Mk. 2.18-22)

33Bongo balobaki na Yesu :

—Mpo na nini bayekoli ya Jean baboyaka mbala na mbala kolia mpo na mabondeli mpe bamipesaka na mabondeli, ndenge moko mpe baoyo ya bafarizeo, kasi oyo ya yo baliaka mpe bamelaka ?

34Yesu azongiselaki bango :

—Boni, bokoki koboyisa bato oyo babengami na feti ya libala kolia, na tango mobali oyo abali azali na bango elongo ?
35Kasi tango ekoya, oyo moto oyo abali bakolongola ye na kati na bango, na tango wana nde bakoboya kolia mpo na kobondela.

36Bongo Yesu alobaki na bango lisapo oyo :

—Moto moko te akoki kokamata kitendi ya elamba ya sika mpo abamba elamba ya kala.
37Moto moko te akoki kotia vino ya sika na basaki ya kala. Soki asali bongo, vino ya sika ekopasola basaki, mpe ekosopana, mpe basaki ekobeba. 38Kasi vino ya sika esengeli batia yango na basaki
Bayuda bazalaki na momesano ya kolombela vino na basaki oyo esalama na poso ya nyama. Bazalaki kosalela yango mingi na poso ya ntaba.
ya sika.
39Mpe moto moko te sima ya komela vino ya kala akoki kolinga oyo ya sika. Pamba te akoloba : Vino ya kala eleki kitoko.
Copyright information for LinMNB