Luke 8

Baoyo balandaki Yesu

1Sima na yango, Yesu abandaki koleka na bavile mpe na bamboka mpo na koteya mpe kosakola Sango Malamu ya Bokonzi ya Nzambe. 2Azalaki elongo na bapostolo na ye zomi na mibale, mpe, na basi oyo ye abikisaki na milimo mabe mpe na bapasi ya ndenge na ndenge : Mariya oyo babengaka Madelene, oyo Yesu abimisaki milimo sambo ya mabe ; 3Jeane : mwasi ya Kuza, oyo azalaki kobatela biloko nyonso ya Erode ; Suzana mpe basi mosusu mingi, baoyo bazalaki kosalisa ye na biloko na bango.

Lisapo ya moloni ya elanga

(Mt. 13.1-9 ; Mk. 4.1-9)

4Awa bato ebele penza basanganaki, mpe bayaki epai ya Yesu wuta na vile moko na moko, alobaki lisapo oyo :

5—Moloni moko abimaki mpo na kolona mbuma. Tango azalaki kobwaka, ndambo ekweyaki na nzela. Baleki nzela banyataki-nyataki yango, mpe bandeke baliaki yango. 6Mosusu ekweyaki likolo ya libanga, tango ebimaki, mwa milona yango ekawukaki, pamba te esika yango ezalaki na mayi te. 7Mosusu ekweyaki na kati ya nzube ; bongo nzube ekolaki elongo na mwa milona wana, mpe efinaki yango. 8Kasi mosusu ekweyaki na mabele ya malamu : ebimaki mpe ebotaki na moko-moko, bambuma nkama-nkama. Tango alobaki bongo, agangaki :

—Moto oyo azala na matoyi mpo na koyoka, ayoka !

(Mt. 13.10-13 ; Mk. 4.10-12)

9Bongo bayekoli na ye batunaki ye soki lisapo wana elakisi nini. 10Yesu alobaki na bango :

—Bino bozwi bolamu ya koyeba basekele ya Bokonzi ya Nzambe ; kasi mpo na bato mosusu, bazali koyebisa bango yango na masapo. Mpo ete, ata batali, bamona te ; ata bayoki, basosola te.

(Mt. 13.10-23 ; Mk. 4.13-20)

11—Boyaka ndimbola ya lisapo yango : mbuma, ezali Liloba ya Nzambe. 12Baoyo bazali na nzela, ezali bato oyo bayokaka Liloba ya Nzambe, kasi Satana ayaka kolongola yango na mitema na bango, mpo ete bakoka kondima te mpe babika te.

13Baoyo bazali likolo ya libanga, ezali bato oyo bayokaka Liloba mpe bayambaka yango na esengo, kasi bazalaka na misisa te. Bandimaka kaka mpo na mwa tango, kasi na tango komekama eyaka, bamibendaka.

14Mbuma oyo ekweyaki na kati ya nzube, ezali bato oyo bayokaka Liloba, kasi tango bakendaka na nzela na bango mitungisi, bomengo mpe bisengo ya mokili efinaka bango mpe bakolaka te.

15Kasi “mbuma oyo ezali likolo ya mabele ya kitoko”, ezali bato oyo bayokaka Liloba mpe babombaka yango na mitema ya bosolo mpe ya malamu, mpe ebotaka mbuma na kokanga motema !

Lisapo ya mwinda

(Mt. 4.21-25)

16—Moto moko te soki apelisi mwinda abombaka yango na nse ya nzungu to atiaka yango na nse ya mbeto. Kasi atiaka yango likolo ya eloko oyo batielaka mwinda mpo ete bato oyo bazali kokota bamona moi na yango. 17Pamba te eloko moko te ya sekele ekozanga koyebana, to mpe eloko moko te ya kobombama ekozanga komonana mpe kobima na polele.

18Bokeba malamu na ndenge oyo bozali koyoka, pamba te, oyo azali na eloko, bakopesa ye mpe oyo azangi, bakobotola ye ata oyo azali kokanisa ete azali na yango.

Banani bazali penza bandeko ya Yesu

(Mt. 12.46-50 ; Mk. 3.31-35)

19Mama ya Yesu mpe bandeko na ye bayaki epai na ye ; kasi bakokaki te kokoma esika ye azalaki, mpo bato bazalaki ebele. 20Bongo bayebisaki ye :

—Mama na yo mpe bandeko na yo bazali libanda, balingi komona yo.

21Kasi Yesu azongiselaki bango :

—Mama na ngai mpe bandeko na ngai, ezali baoyo bayokaka Liloba ya Nzambe mpe basalelaka yango !

Yesu aleki mopepe na makasi

(Mt. 8.23-27 ; Mk. 4.35-41)

22Mokolo moko, Yesu amataki na bwato elongo na bayekoli na ye, mpe alobaki na bango :

—Tokatisa na ngambo mosusu ya laki. Bongo bakendaki.
23Tango bazalaki koluka nkai, Yesu alalaki pongi. Mopepe moko ya makasi ebandaki koleka na laki, bongo bwato ebandaki kotonda na mayi mpe balingaki kodinda. 24Bayekoli bayaki epai ya Yesu mpe balamusaki ye na koganga :

—Moteyi, moteyi, tokufi ! Alamukaki, apamelaki mopepe mpe mbonge ; mopepe na mbonge esilaki, mpe kimia ezongaki.
25Sima atunaki bayekoli na ye :

—Kondima na bino ezali wapi ? Kasi kobanga ya makasi ezwaki bango mpe batondaki na kokamwa ; bongo balobanaki bango na bango :

—Moto oyo azali nani ? Azali kotinda ata mopepe mpe mayi, mpe yango ezali kotosa ye.

Yesu aleki milimo mabe na makasi

(Mt. 8.28-34 ; Mk. 5.1-20)

26Bongo bakomaki na mokili ya Geraza, oyo etalani na Galileya. 27Tango Yesu akitaki na mokili, moto moko ya vile wana, oyo azalaki na milimo mabe ayaki kokutana na ye. Banda kala, azalaki kolata bilamba te mpe azalaki kovanda na ndako te, kasi azalaki kovanda na simetiele. 28Tango amonaki Yesu, abandaki konganga, mpe amibwakaki liboso na ye. Bongo alobaki na mongongo makasi :

—Ngai na yo likambo nini, Yesu, Mwana ya Nzambe oyo Aleki Likolo ? Nabondeli yo, kotungisa ngai te !

29Pamba te Yesu azalaki kotinda molimo mabe ebima na moto wana. Mbala mingi molimo mabe ezalaki kokanga ye ; bongo bazalaki kokanga ye na basinga, kobatela ye na minyololo mpe kotia ye mabende na makolo. Kasi azalaki kokata yango, mpe molimo mabe ezalaki kotinda ye na esika ya ye moko kaka.

30Bongo Yesu atunaki ye :

—Kombo na yo nani ? Molimo mabe ezongisaki : —Legion. Pamba te, milimo mabe ebele ekotaki kati na ye.

31Bongo milimo mabe ebondelaki Yesu mpo atinda bango na libulu te. 32Nzokande, etonga monene ya bangulu ezalaki kolia wana likolo ya ngomba. Bongo milimo mabe ebondelaki Yesu mpo apesa bango ndingisa ya kokota na bangulu wana. Mpe Yesu apesaki yango ndingisa. 33Milimo mabe ebimaki na moto yango, ekotaki na bangulu mpe etonga ya bangulu wana nyonso, ekitaki mbango na ngomba, emibwakaki na laki, mpe ekufaki.

34Tango bato oyo bazalaki kokengela bangulu yango bamonaki likambo oyo esalamaki bakimaki, mpe bakendaki koyebisa likambo oyo esalamaki, na vile mpe na bilanga. 35Bongo bato bayaki mpo na kotala likambo oyo esalamaki. Tango bakomaki na esika oyo Yesu azalaki, bamonaki moto oyo milimo mabe ebimaki kati na ye, avandaki na makolo ya Yesu ; alataki bilamba mpe mayele na ye ezongaki malamu. Mpe bango nyonso babangaki. 36Baoyo bamonaki likambo yango ndenge esalamaki, bazalaki koyebisa bango ndenge moto oyo azalaki na milimo mabe akangolamaki.

37Bongo bato nyonso ya mokili ya Geraza basengaki Yesu alongwa na mokili na bango, pamba te kobanga monene ekangaki bango. Bongo amataki na bwato mpe azongaki. 38Moto oyo milimo mabe ebimaki kati na ye asengaki mpo akende na Yesu elongo, kasi Yesu azongisaki ye mpe alobaki na ye :

39—Zonga na ndako na yo, mpe yebisa makambo nyonso oyo Nzambe asali mpo na yo ! Bongo moto yango akendaki koyebisa na vile mobimba likambo oyo Yesu asalaki mpo na ye.

Yesu aleki maladi mpe liwa na makasi

(Mt. 9.18-26 ; Mk. 5.21-43)

40Tango Yesu azongaki, bato ebele penza bayambaki ye, pamba te bango nyonso bazalaki kozela ye. 41Moto moko kombo na ye Yayiro ayaki, mpe azalaki mokonzi ya ndako ya mayangani. Afukamaki liboso ya Yesu, mpe abondelaki ye mpo akende na ndako na ye : 42pamba te, mwana na ye moko kaka ya mwasi, ya bambula pene-pene na zomi na mibale, alingaki kokufa. Tango azalaki kokende, ebele ya bato bazalaki kofina-fina ye.

43Mwasi moko azalaki wana, azalaki na maladi ya kotanga makila, mpe maladi yango ewumelaki bambula zomi na mibale. Asilisaki biloko na ye nyonso epai ya minganga, kasi ata moto moko te akoki kobikisa ye. 44Apusanaki na sima ya Yesu mpe asimbaki songe ya elamba na ye. Kaka na tango wana, makila etikaki kotanga.

45Yesu atunaki :

—Nani asimbi ngai ? Bato nyonso bawanganaki. Bongo Piere alobaki na ye :

—Moteyi, bato ebele penza bazali kofina-fina yo mpe kotuta-tuta yo.

46Kasi Yesu azongisaki :

—Moto moko asimbaki ngai ; pamba te nayoki ete nguya ebimi kati na ngai.
47Mwasi yango lokola ayebaki ete akoki kobatama te, ayaki na kolenga nyonso, afukamaki liboso ya Yesu, mpe alobaki na miso ya bato nyonso, soki mpo na nini asimbaki ye mpe ndenge abikaka na mbala moko.

48Bongo Yesu alobaki na ye :

—Mwana na ngai ya mwasi, kondima na yo ebikisi yo ! Kende na kimia !

49Tango Yesu azalaki naino koloba, moto moko awutaki na ndako ya Yayiro, mokonzi ya ndako ya mayangani, ayaki mpe alobaki na ye :

—Mwana na yo ya mwasi asiʼakufi, kotungisa lisusu Moteyi te ;

50Kasi tango Yesu ayokaki bongo, alobaki na Yayiro :

—Kobanga te, ndima kaka, mpe akobika !

51Tango Yesu akomaki na ndako, apesaki ndingisa na moto moko te mpo na kokota, longola kaka Piere, Jean, Zaki, tata mpe mama ya elenge mwasi. 52Bato nyonso bazalaki kolela mpe komitungisa mingi mpo na ye. Kasi Yesu alobaki na bango :

—Botika kolela ; akufi te, kasi alali pongi !

53Basekaki ye, pamba te bayebaki ete mwana asilaki kokufa. 54Kasi Yesu akamataki ye na loboko mpe alobaki na mongongo makasi :

—Mwana na ngai, telema !

55Molimo na ye ezongaki, mpe kaka na tango wana atelemaki. Bongo Yesu alobaki na bango bapesa ye eloko ya kolia. 56Baboti ya mwana bakamwaki mingi penza ; kasi Yesu apekisaki bango ete baloba na moto moko te likambo oyo ewutaki kosalama.
Copyright information for LinMNB