Luke 9:37-42

37Mokolo oyo elandaki, tango bakitaki na ngomba, bato ebele penza bayaki kokutana na Yesu. 38Bongo moto moko na kati ya ebele ya bato wana agangaki :

—Moteyi, na bondeli yo, tala mwana na ngai ya mobali ! Nazali na ye kaka moko.
39Molimo mabe ekangaka ye ; mpe agangaka na mbala moko ; molimo yango eningisaka ye makasi penza mpe ebimisaka ye fulu-fulu na monoko. Etikaka ye na pasi penza sima ya kolembisa ye mingi penza. 40Nabondeli bayekoli na yo mpo babengana molimo yango, kasi bakoki te !

41Yesu alobaki :

—O ! bato bazangi kondima mpe bato mabe ! Nakozala na bino kino tango nini ? Mpe nakokanga motema mpo na bino kino tango nini ? Bongo alobaki na moto wana :

—Yaka na mwana na yo awa !

42Tango mwana azalaki kopusana pene-pene ya Yesu, molimo mabe ebwakaki ye na mabele mpe ebandaki koningisa ye makasi penza ; kasi Yesu apamelaki molimo mabe, mpe abikisaki elenge mobali ; bongo azongisaki ye na tata na ye.
Copyright information for LinMNB