Mark 10

MOSALA YA YESU NA YUDEA MPE NA YERUZALEM

Eyano ya Yesu mpo na koboma libala

(Mt. 19.1-12)

1Bongo Yesu alongwaki na esika wana, akendaki na mokili ya Yudea, mpe na ngambo ya Yordani. Bato ebele bayaki lisusu kosangana epai na ye ; bongo abandaki koteya bango lokola amesanaki.

2Bafarizeo bayaki, mpe mpo na komeka ye, batunaki :

—Boni, nzela epesami na mobali mpo na kolongola mwasi na ye na libala ?

3Yesu azongiselaki bango :

—Moyize apesaki bino mobeko nini ?

4Bango balobaki :

—Moyize apesaki nzela na mobali ete akoma mokanda ya koboma libala, mpe alongola ye na libala.

5Bongo Yesu azongisaki :

—Moyize akomelaki bino mobeko wana mpo mitema na bino ezali makasi.
6Kasi na ebandeli ya mokili, Nzambe asalaki bango mobali mpe mwasi.

7Yango wana mobali akotika tata mpe mama na ye mpe akosangana na mwasi na ye, 8Mpe bango mibale bakokoma mosuni moko. Bongo bakozala lisusu mibale te, kasi mosuni moko.

9Yango wana moto moko te akabola oyo Nzambe asangisi !

10Tango bazalaki lisusu na kati ya ndako, bayekoli batunaki Yesu mpo na likambo yango. 11Ye azongisaki :

—Moto oyo alongoli mwasi na ye na libala mpe abali mwasi mosusu, asali ekobo epai ya mwasi na ye ya liboso.
12Mpe soki mwasi akabwani na mobali na ye mpe abalani na mobali mosusu, asali ekobo !

Yesu ayambi bana mike

(Mt. 19.13-15 ; Lk. 18.15-17)

13Bayelaki Yesu bana mike mpo asimba bango, kasi bayekoli bapamelaki baoyo bayaki na bango.

14Tango Yesu amonaki bongo, asilikaki mpe alobaki na bango :

—Botika bana mike baya epai na ngai, bopekisa bango te, pamba te Bokonzi ya Nzambe ezali mpo na ba oyo bazali lokola bango.
15Nalobi na bino ya solo : moto oyo akoyamba Bokonzi ya Nzambe lokola mwana moke te, akokota te na Bokonzi yango.

16Bongo akamataki bana na maboko na ye, atielaki bango maboko mpe apambolaki bango.

Bato ya mbongo na Bokonzi ya Nzambe

(Mt. 19.16-30 ; Lk. 18.18-30)

17Tango Yesu azalaki kokende, moto moko ayaki mbangu epai na ye, afukamaki liboso na ye mpe atunaki ye :

—Moteyi malamu, esengeli nasali nini mpo nazwa bomoi ya seko ?

18Yesu azongisaki :

—Mpo na nini ozali kobenga ngai moto malamu ? Moto moko te azali malamu, longola kaka Nzambe ye moko.
19Oyebi Mibeko : Kosala ekobo te, koboma te, koyiba te, koloba litatoli ya lokuta te, kokosa moninga te, tosa tata na yo mpe mama na yo.

20Moto yango alobaki :

—Moteyi, natosaka nyonso wana banda bolenge na ngai !

21Yesu atalaki ye mpe alingaki ye. Alobaki na ye :

—Ozangi eloko moko ; kende, teka biloko nyonso oyo ozali na yango, pesa na babola, mpe okozala na bomengo na likolo ; bongo yaka mpe landa ngai !

22Tango ayokaki maloba wana, elongi na ye ekomaki mawa-mawa, akendaki na mawa, pamba te azalaki na bomengo mingi penza.

23Bongo Yesu atalaki epai na epai, mpe alobaki na bayekoli na ye :

—Ezali pasi mingi penza na bato ya bomengo mpo na kokota na Bokonzi ya Nzambe !

24Bayekoli bakamwaki mingi penza mpo na maloba na ye. Kasi Yesu alobaki lisusu :

—Bana, ezali pasi mingi penza
Mikanda misusu ya kala ebakisaka : “na bato oyo batiaka mitema na bango nyonso na bomengo”.
.
25Ezali pasi te na shamo mpo na koleka na lidusu ya tonga, kasi ezali pasi mingi na moto ya bomengo mpo na kokota na Bokonzi ya Nzambe. 26Bayekoli bakamwaki mingi penza, mpe bazalaki koloba bango na bango :

—Bongo nani akoki kobika ?

27Yesu atalaki bango mpe alobaki :

—Na bato ekoki kosalama te, kasi na Nzambe te ; pamba te, Nzambe akoki kosala nyonso.

28Piere alobaki na Yesu :

—Tala, totiki biloko nyonso mpo na kolanda yo !

29Yesu azongisaki :

—Nalobi na bino ya solo, moto moko te oyo atiki ndako na ye, bandeko na ye ya mibali, bandeko na ye ya basi, mama na ye, tata na ye, bana na ye, to bilanga na ye, mpo na ngai mpe mpo na Sango Malamu ;
30Bongo azanga kozwa sikʼoyo mbala nkama koleka, na tango oyo tozali : Bandako, bandeko ya mibali, bandeko ya basi, bamama, bana, mpe bilanga, elongo na minyoko ; mpe na tango oyo ekoya : bomoi ya seko. 31Kasi bato mingi oyo bazali bato ya liboso, bakokoma bato ya suka, mpe bato ya suka bakokoma bato ya liboso !

Yesu ayebisi lisusu liwa mpe kosekwa na ye

(Mt. 20.17-19 ; Lk. 18.31-34)

32Tango bazalaki na nzela mpo na komata na Yeruzalem ; Yesu azalaki kotambola lisoso na bango. Bayekoli bazalaki kokamwa, mpe ba oyo bazalaki kolanda bango bazalaki kobanga.

Bongo Yesu akamataki lisusu bapostolo na ye zomi na mibale na pembeni, mpe abandaki koyebisa bango makambo oyo ekokweyila ye.

33Alobaki na bango :

—Tala, tozali kokende na Yeruzalem, mpe bakoteka Mwana ya Moto na maboko ya bakonzi ya banganga-Nzambe mpe ya balakisi ya Mibeko. Bakokatela ye etumbu ya liwa mpe bakokaba ye na maboko ya bapakano.
34Bongo bakoseka ye, bakobwakela ye soyi, bakobeta ye bamfimbo, mpe bakoboma ye ; kasi akosekwa sima ya mikolo misato !

Zaki mpe Jean basengi bisika ya lokumu

(Mt. 20.20-28 ; Lk. 22.25-27)

35Bongo Zaki mpe Jean, bana ya Zebedeo, bayaki epai ya Yesu mpe balobaki na ye :

—Moteyi tolingi osalela biso likambo oyo tokosenga yo.

36Yesu atunaki bango :

—Bolingi nasala nini mpo na bino ?

37Bazongiselaki ye :

—Tika ete moko na biso avanda na loboko na yo ya mobali, mpe mosusu na loboko na yo ya mwasi, kati na kembo na yo.

38Kasi Yesu alobaki na bango :

—Boyebi te oyo bozali kosenga ; boni, bokokoka komela kopo oyo ngai nakomela ? To mpe bokoka kozwa libatisi oyo ngai nakozwa ?

39Bazongisaki :

—Tokokoka !

Bongo Yesu alobaki na bango :

—Bokomela kopo oyo ngai nakomela mpe bokozwa libatisi oyo ngai nakozwa.
40Kasi mpo na kovanda na loboko na ngai ya mobali to na loboko na ngai ya mwasi, ezali ngai te moto nakopesa yango. Bisika wana ekozala mpo na bato oyo ba bongisama mpo na yango.

41Tango bapostolo zomi mosusu bayokaki likambo yango, basilikelaki Zaki mpe Jean.

42Bongo Yesu abengaki bango nyonso epai na ye mpe alobaki :

—Boyebi ete ba oyo bamonanaka lokola bakonzi ya bapakano balakisaka bokonzi likolo na bango, mpe bato na bango ya minene batindaka bango na makasi.

43Kasi na kati na bino, ekoki kozala bongo te. Nzoka nde, soki moto moko alingi kokoma moto monene na kati na bino, esengeli azala mosali na bino. 44Mpe oyo alingi kozala mosali ya liboso, esengeli azala mowumbu ya bato nyonso. 45Pamba te ata Mwana ya moto ayaki te mpo bato basalela ye, kasi mpo na kosalela bato, mpe kokaba bomoi na ye mpo na kobikisa bato ebele !

Yesu abikisi Bartime

(Mt. 20.28-34 ; Lk. 18.35-43)

46Bongo bakomaki na Zeriko. Awa yesu na bayekoli na ye ? Elongo na ebele ya bato ? Bazalaki kobima na Zeriko, moto moko akufa miso, Bartime, mwana ya Time, azalaki ya kovanda na pembeni ya nzela mpe azalaki kosenga-senga mbongo. 47Tango ayokaki ete ezali Yesu ya Nazareti, abandaki koganga :

—Yesu Mwana ya Davidi, yokela ngai mawa !

48Bato ebele bangangelaki ye mpe balobaki na ye avanda nyee.

Kasi agangaki lisusu makasi koleka :

—Mwana ya Davidi, yokela ngai mawa !

49Yesu atelemaki mpe alobaki :

—Bobenga ye !

Bongo babengaki moto akufa miso mpe balobaki na ye :

—Yika mpiko, telema, azali kobenga yo !

50Abwakaki elamba na ye, atelemaki noki, mpe akendaki epai ya Yesu.

51Yesu atunaki ye :

—Olingi nasala nini mpo na yo ?

Mokufi miso azongisaki :

—Moteyi, nalingi namona !

52Bongo Yesu alobaki na ye :

—Kende, kondima na yo ebikisi yo !

Na mbala moko, abandaki komona mpe alandaki Yesu na nzela.
Copyright information for LinMNB