Mark 11:20-25

20Na tango, awa bazalaki koleka, bamonaki nzete ya figi ekawukaki wuta na misisa.

21Piere akanisaki likambo oyo esalamaki mpe alobaki na Yesu :

—Moteyi, tala ! Nzete ya figi oyo olakelaki mabe, ekawuki.

22Bongo Yesu azongisaki :

—Bozala na kondima na Nzambe.
23Nalobi na bino ya solo, soki moto alobi na ngomba oyo : “Longwa wana mpe mibwaka na kati ya ebale”, mpe atie tembe na motema na ye te, kasi andimi ete makambo oyo alobi ekosalama, yango ekosalama mpo na ye. 24Yango wana nalobi : eloko nyonso oyo bokosenga na libondeli, bondima ete bosili kozwa yango, mpe yango ekosalama mpo na bino.

25Mpe tango botelemi mpo na kobondela, soki bozali na likambo na moto mosusu, bolimbisa ye, mpo ete Tata na bino oyo azali na Likolo, alimbisa masumu na bino.
Copyright information for LinMNB