Mark 15:1-5

Yesu asambi liboso ya Pilato

(Mt. 27.11-26 ; Lk. 23.1-5,13-25 ; Jn. 18.28-40 ; 19.4-16)

1Na tongo, bakonzi ya banganga-Nzambe, elongo na bankolo, balakisi ya Mibeko, mpe bato nyonso ya likita monene ya Bayuda, basanganaki mpo na kokata likambo. Bongo bakangaki Yesu na basinga, bamemaki ye mpe bapesaki ye na maboko ya Pilato. 2Pilato atunaki ye :

—Ozali mokonzi ya Bayuda ?

Yesu azongisaki :

—Ee, ezali bongo ndenge olobi.
3Bakonzi ya banganga-Nzambe bazalaki kofunda ye na makambo ebele. 4Bongo Pilato atunaki ye lisusu :

—Boni, okozongisa eloko moko te ? Yoka ebele ya makambo oyo bazali kofundela yo !
5Kasi Yesu azongisaki lisusu ata eloko moko te ; bongo Pilato akamwaki mingi penza.
Copyright information for LinMNB