Mark 15:21-26

21Moto moko ya mboka Sirene, kombo na ye Simon, tata ya Alekizandre mpe Rufusi, awutaki na bilanga mpe azalaki koleka na nzela wana, batindaki ye na makasi amema ekulusu ya Yesu. 22Bongo bamemaki Yesu na esika babengaka Golgota, (yango elingi koloba : “Esika ya mokuwa ya motu”). 23Bapesaki ye vino basangisa na mire mpo amela, kasi amelaki yango te. 24Bongo babakaki ye na ekulusu. Bakabolaki bilamba na ye : babetelaki yango zeke mpo na koyeba oyo moto na moto akozwa. 25Tango babakaki ye na ekulusu, ezalaki na ngonga ya libwa ya tongo. 26Libaya ya moke oyo bakomaki tina oyo bafundelaki ye, ezalaki koloba boye : “Mokonzi ya Bayuda”.
Copyright information for LinMNB