Mark 15:33-38

33Na ngonga ya midi, molili ezalaki na ekolo mobimba kino na ngonga ya misato ya pokwa. 34Bongo na ngonga ya misato ya pokwa, Yesu agangaki na mongongo makasi :

—Eli ; Eli, lama sabakatani ? Elingi koloba : Nzambe na ngai, Nzambe na ngai, mpo na nini otiki ngai ?
35Tango ndambo ya bato oyo bazalaki wana bayokaki bango, balobaki :

—Yoka, azali kobenga Eliya !
36Bongo moto moko akimaki mbangu, atondisaki eponze na vino ya ngayi, atiaki yango na songe ya mwa nzete, mpe apesaki yango Yesu mpo amela ; mpe alobaki :

—Tozela mpe totala, soki Eliya akoya kokitisa ye.
37Kasi Yesu agangaki makasi peza mpe akataki motema ! 38Rido ya Ndako na Nzambe epasukaki na biteni mibale, banda na likolo kino na nse.
Copyright information for LinMNB