Mark 15:6-11

6Na tango ya feti, Pilato azalaki kobimisa moto moko ya boloko, oyo bato bango moko bazalaki kosenga. 7Nzoka nde, moto moko kombo na ye Barabasi, azalaki na boloko elongo na batomboki mosusu, ba oyo babomaki moto na tango mobulu ebimaki. 8Ebele ya bato bayaki mpe basengaki Pilato asala mpo na bango oyo azalaki kosalela bango mbala na mbala. 9Pilato atunaki :

—Bolingi natikela bino Mokonzi ya Bayuda ?
10Pamba te Pilate ayebaki ete bakonzi ya banganga-Nzambe batekaki Yesu apayi na ye, kaka mpo na likunia. 11Kasi bakonzi ya banganga-Nzambe batindikaki ebele ya bato mpo basenga Pilato atikela bango Barabasi.
Copyright information for LinMNB