Mark 16:1-4

Yesu asekwi

(Mt. 28.1-8 ; Lk. 24.1-11 ; Jn. 20.1-2)

1Tango mokolo ya Saba elekaki, Mariya ya mboka Magadala, Mariya mama ya Zaki, mpe Salome basombaki malasi mpo na kokende kopakolo nzoto ya Yesu. 2Na mokolo ya liboso ya poso, na tongo-tongo, tango moyi ebandaki kobima, bakendaki na lilita. 3Bazalaki kotunana bango na bango :

—Nani akolongolela biso libanga oyo ezali na liboso ya porte ya lilita ?
4Kasi tango batalaki, bamonaki ete libanga oyo ezalaki monene penza, bapusaki yango na pembeni.
Copyright information for LinMNB