Mark 2

Yesu abikisi moto akufa makolo mpe alimbisi masumu na ye

(Mt. 9.1-8 ; Lk. 5.17-26)

1Sima ya mwa mikolo, tango Yesu azongaki lisusu na Kapernawumi, bato bayokaki ete azalaki na ndako. 2Bongo bato ebele bayaki kosangana kuna, na ndenge ete, esika ezalaki lisusu te ata liboso ya porte ; bongo ateyaki bango Liloba. 3Bato bayaki, bayelaki ye moto moko akufa makolo, oyo amemamakina bato minei. 4Lokola bakokaki te komema ye kino bisika Yesu azalaki, mpo bato bazalaki ebele penza, batobolaki lidusu likolo ya ndako ; na bisika Yesu azalaki, bongo na lidusu wana, bakitisaki moto ya maladi na mbeto oyo bamemelaka bato ya maladi.

5Tango Yesu amonaki kondima na bango, alobaki na moto oyo akufa makolo :

—Mwana na ngai, masumu na yo elimbisami !
6Kasi balakisi mosusu ya Mibeko oyo bavandaki wana, babandaki kokanisa na nse ya mitema na bango :

7—Mpo na nini moto oyo azali koloba boye ? Azali kotiola Nzambe. Nani akoki kolimbisa masumu soki bobele Nzambe te ?

8Kaka na tango wana Yesu ayebaki na molimo na ye ete bazalakikokanisa bongo kati na mitema na bango :

—Mpo na nini bozali kokanisa bongo na mitema na bino ?
9Likambo nini ezali pete mpo na koloba na moto oyo akufa makolo : “Masumu na yo elimbisami”, to “Telema, kamata mbeto na yo mpetambola ?” 10Kasi mpo boyeba ete Mwana na moto azali na bokonzi na mokili mpo na kolimbisa masumu…

11Bongo alobaki na moto akufa makolo :

—Nalobi na yo, telema, kamata mbeto na yo, mpe zonga na ndako na yo !

12Kaka na tango wana, atelemaki, akamataki mbeto na ye, mpe abimaki na miso ya bato nyonso. Bato nyonso bakamwaki mingi mpe bakumisaki Nzambe boye :

—Naino tomoni likambo ya ndenge oyo te !

Batieli Yesu tembe

(Mt. 9.9-13 ; Lk. 5.27-32)

13Yesu abimaki lisusu mpe akendaki pembeni-pembeni ya ebale. Bato ebele penza bayaki epai na ye mpe azalaki koteya bango. 14Tango azalaki koleka, amonaki Levi, mwana ya Alfeo, avandaki na biro oyo bafutelaka pako. Yesu alobaki na ye :

—Landa ngai !

Levi atelemaki, mpe alandaki ye.

15Tango yesu azalaki kolia na ndako ya Levi, bafutisi pakoebele na bato ya masumu, bazalaki mpe kolia elongo na ye na bayekoli na ye pamba te bato oyo bazalaki kolanda ye bazalaki mingi.

16Tango balakisi ya Mibeko ya lisanga ya bafarizeo bamonaki ete Yesu azalaki kolia na bato ya masumu mpe na bafutisi pako, batunaki bayekoli na ye :

—Mpo na nini azali kolia na bafutisi mpaku mpe bato ya masumu ?

17Tango Yesu ayokaki yango, alobaki na bango :

—Bato oyo bazangi maladi bazalaka na posa ya monganga te, kasibato ya maladi. Nayaki te mpo na kobenga bato na sembo, kasi bato ya masumu.

(Mt. 9.14-17 ; Lk. 5.33-39)

18Bayekoli ya Jean na oyo ya bafarizeo bazalaki koboya kolia mpo na mabondeli. Bongo bayaki kotuna Yesu :

—Mpo na nini bayekoli ya Jean na oyo ya bafarizeo baboyaka kolia mpo na mabondeli, kasi oyo ya yo basalaka bongo te ?

19Yesu azongiselaki bango :

—Ndenge nini bato oyo babengisi na feti ya libala bakoki koboya kolia na tango mobali oyo abali azali na bango elongo ? Tango nyonso oyo mobali azali na bango elongo, bakoki koboya kolia te mpo na mabondeli.
20Kasi tango ekoya, tango bakolongola mobali na kati na bango, mokolo wana nde bakoboya kolia mpo na mabondeli.

21Moto moko te akoki kobamba elamba ya kala na eteni ya elamba ya sika ; soki asali bongo, eteni ya elamba ya sika ekopasola elamba ya kala ; mpe kopasuka wana ekokoma monene koleka. 22Moto moko te akoki kotia vino ya sika na kati ya basaki ya kala oyo ya poso ya nyama ; soki asali bongo, vino ekopasola basaki, bongovino ekosopana mpe basaki ekobeba. Vino ya sika batiaka yango na kati ya basaki ya sika.

Yesu azali Mokonzi ya mokolo ya saba

(Mt. 12.1-8 ; Lk. 6.1-5)

23Mokolo moko ya saba, Yesu azalaki koleka na kati ya elanga ya ble. Tango bazalaki kotambola, bayekoli na ye babandaki kobuka bambuma ya ble.

24Bafarizeo balobaki na ye :

—Tala, mpo na nini bazali kosala likambo oyo epekisami kosala na mokolo ya Saba ?

25Yesu azongiselaki bango :

—Naino botangi te likambo oyo Davidi asalaki, tango ye na baningana ye bayokaki nzala mpe bazangaki eloko ya kolia ?
26Akotaki na Ndako ya Nzambe mpe aliaki mampa oyo bapesaki makabona Nzambe. Na tango wana, Abiatare moto azalaki mokonzi ya banganga-Nzambe. Nzokande, kaka banganga-Nzambe nde bazalaki na ndingisampo na kolia yango ; kasi David apesaki yango mpe na bato na ye.

27Bongo alobaki na bango lisusu :

—Mokolo ya saba esalama mpo na moto ; kasi moto asalama mpo na mokolo ya saba te.
28Yango wana, Mwana na Moto azali Mokonzi ya mokolo ya saba !
Copyright information for LinMNB