Mark 3:1-6

(Mt. 12.9-14 ; Lk. 6.6-11)

1Yesu akotaki lisusu na ndako ya mayangani. Moto moko azalaki kuna, azalaki na loboko ya kokufa. 2Bazalaki kotala ye soki akobikisa ye na mokolo ya saba, mpo bazwa likambo ya kofundela ye.

3Bongo Yesu alobaki na moto oyo azalaki na loboko ekufa :

—Telema awa liboso ya bato nyonso.

4Mpe atunaki bango :

—Ndingisa ezali mpo na kosala likambo ya malamu mokolo ya Sabato kosala mabe ? Kobikisa bomoi to koboma yango ?

5Kasi bavandaki nyee.

Yesu atalaki bango na kanda, mpe ayokaki mawa mingi mpo motema na bango ezalaki libanga. Bongo alobaki na moto wana :

—Sembola loboko na yo !

Asembolaki yango, mpe loboko na ye ekomaki malamu.
6Kaka na tango wana, bafarizeo babimaki mpe babandaki koyokana na bato ya lisanga ya Erode mpo na koluka nzela ya kobomisa Yesu.

Yesu kati ya bato ebele

Copyright information for LinMNB