Mark 7

Yesu mpe bonkoko ya Bayuda

(Mt. 15.1-20)

1Bafarizeo na ndambo ya balakisi ya Mibeko, oyo bawutaki na Yeruzalem, bayaki kosangana epai Yesu azalaki. 2Bamonaki ete bayekoli mosusu ya Yesu bazalaki kolia limpa na mabokoya mbindo ; elingi koloba : maboko oyo basukola te. 3Pamba te, bafarizeo na bayuda nyonso bazalaki kolia te sokibasukoli maboko malamu penza te ; na bongo nde, bazalaki kotosa bonkoko ya bakoko. 4Mpe soki bawuti na zando, baliaka te soki naino basukoli te. Bazalaki lisusu na mibeko mingi ya bonkoko oyo bazalaki kotosa, lokola : kosukola bakopo, biluku, na banzungu ya mabende. 5Yango wana bafarizeo na balakisi ya Mibeko batunaki Yesu :

—Mpo na nini bayekoli na yo batosaka te mibeko ya bakoko, kasi baliaka na maboko ya mbindo ?

6Yesu azongiselaki bango :

—Bino baiporite ! Ezali asakolaki malamu mpo na bino ; lokola ekomama : Bato oyo bakumisaka ngai na bambebo,
kasi mitema na bango ezali mosika na ngai !

7 Bakumbamelaka ngai kaka pamba ;
mateya na bango
ezali kaka mibeko oyo esamaki na bato.

8Pamba te, bobwakaka Mibeko ya Nzambe, mpe botosaka bonkoko ya bato.

9Bongo alobaki na bango :

—Botiaka Mibeko ya Nzambe na pembeni mpo na kotosa bonkoko na bino.
10Pamba te, Moyize alobaki :

—Tosa tata mpe mama na yo
tala mpe Esode 20.12 ; Dt 5.16.
, mpe oyo akolakela tata to mama na ye mabe, esengeli baboma ye
Tala mpe Esode 21.17.
.

11Kasi bino bolobaka, soki moto alobi na tata to mama na ye : “Lisalisi oyo olingaki kozwa epai na ngai ezali ‘Korban’ ”, (elingikoloba likabo esengeli kaka mpo na Nzambe), 12bongo bopesaka moto yango nzela mpo asala eloko moko te na tata na ye to mpe mama na ye. 13Tala ndenge bobomaka Liloba ya Nzambe na nzela ya bonkoko na bino, oyo boteyanaka bino na bino. Bosalaka mpe makambo mingi ya ndenge wana !

14Bongo Yesu abengaki lisusu ebele ya bato, mpe alobaki na bango :

—Bino nyonso boyoka ngai, mpe bososola malamu likambo oyo :
15Eloko moko te ezali libanda ya moto, oyo ekotaka na kati na yempe ekoki kokomisa ye mbindo. Kasi oyo ebimaka kati na ye yangonde ekomisaka ye mbindo. 16[Soki moto azali na matoyi mpo na koyoka tika ye ayoka
Verset oyo ezali te na mikanda mingi ya kala.
.]

17Tango Yesu atikaki ebele ya bato mpe akotaki na ndako, bayekoli na ye batunaki ye mpo na lisapo wana.

18Bongo alobaki na bango :

—Bino mpe bozali na mayele te ? Boyebi te ete eloko moko te oyo ekotaka na moto, wuta libanda, ekoki kokomisa ye mbindo ?
19Pamba te yango ekotaka na motema na ye te, kasi na libumu na ye, bongo ebimaka libanda ya nzoto na ye (Na maloba oyo, Yesu alakisaki ete bilei nyonso ezali peto).

20Bongo alobaki lisusu :

—Oyo ebimaka na moto, yango nde ekomisaka ye mbindo.
21Pamba te, wuta na kati, na motema ya moto nde ebimaka : makanisi ya mabe, ekobo, kindumba, 22koboma, koyiba, lokoso ya mbongo, makambo ya mabe, makambo ya lokuta, pite, kofinga, lofundu, bozoba. 23Makambo nyonso wana ya mabe, ebimaka na kati mpe yango ekomisaka moto mbindo.

Kondima ya mwasi oyo azalaki ; oyuda te

(Mt. 15.21-28)

24Yesu alongwaki wana mpe akendaki na mikili ya Tire
mikanda misusu ya kala ebakisaka, “Tire ayi Sidoni”.
. Akotaki na ndako moko mpe alingaki te ete moto ata moko ayeba yango. Kasi akokaki kobombama te.
25Mwasi moko azalaki na mwana ya mwasi oyo azalaki kotungisama na molimo mabe ; tango ayokaki sango ya Yesu, ayaki mpe afukamaki liboso na ye. 26Mwasi yango azalaki Mogreki, abotamaki na Fenisia ya Siriya. Abondelaki Yesu mpo abengana molimo mabe na mwana na ye ya mwasi.

27Kasi Yesu alobaki na ye :

—Tika naino bana batonda, pamba te ezali malamu te mpo na kokamatamampa ya bana mpe kobwakela yango bambwa.

28Mwasi azongiselaki ye :

—Nkolo, pamba te ata bambwa, na nse ya mesa baliaka bandambooyo bana bakweyisaka.

29Bongo Yesu alobaki na ye :

—Mpo na eyano oyo ozongisi, kende, molimo mabe esiʼebimi na mwanana yo ya mwasi.

30Mpe tango akendaki na ndako, akutaki mwana na ye alali na mbeto, mpe molimo mabe ebimaki.

Yesu abikisi moto ayokaka te mpe alobaka te

31Bongo Yesu alongwaki na mikili ya Tire, alekaki na Sidoni, mpe akendaki na ebale ya Galileya na kolekela na mokili ya Dekapoli
Dekapoli  : elingi : “Bavile zomi”.
.
32Bamemelaki ye moto moko ayokaka te mpe azalaki koloba na pasi. Bongo babondelaki ye mpo atiela ye maboko. 33Yesu alongolaki ye na kati ya ebele ya bato, amemaki ye na pembeni, mpe atiaki ye misapi na matoyi ; abwakaki nsoyi mpe asimbaki lolemo ya moto yango.

34Atalaki na likolo, apemaki moke mpe alobaki na ye :

—Efata (elingi koloba : fungwama).

35Kaka na tango wana matoyi na ye efungwamaki mpe lolemo na ye ekangwamaki, mpe abandaki koloba malamu. 36Yesu apekisaki bango ete baloba yango na moto moko te. Awa azalaki kopekisa bango sango yango mingi, bango bazalaki kopanza yango mingi penza koleka.

37Bato bakamwaki mingi penza, mpe bazalaki koloba :

—Azali kosala makambo nyonso malamu ; azali koyokisa bato bakufa matoyi mpe kolobisa bato oyo balobaka te.
Copyright information for LinMNB