Matthew 13:1-6

Lisapo ya moloni

(Mk. 4.1-9 ; Lk. 8.4-8)

1Kaka mokolo wana, Yesu abimaki na ndako mpe akendaki pembeni ya ebale. 2Bato ebele penza bayaki kotondela ye bipai na bipai ; yango wana amataki na bwato mpe avandaki. Bongo ebele ya bato batelemaki na mokili.

3Mpe ateyaki bango makambo mingi na masapo. Alobaki na bango :

—Moloni moko akendaki kolona mbuma na elanga.
4Tango azalaki kobwaka bambuma, ndambo ekweyaki pembeni-pembeniya nzela ; bandeke bayaki mpe baliaki yango. 5Ndambo ekweyaki na esika ya mabanga, epai mabele ezalaki mingi te. Bambuma yango ebimaki noki mpo mabele ezalaki na mozindo te. 6Kasi tango moi ya makasi ebimaki, mwa banzete yango ezikaki mpe ekawukaki mpo ezalaki na misisa te.
Copyright information for LinMNB