Matthew 16:13-18

13Tango Yesu ayaki na mokili ya Sezareya ya Filipo, atunaki bayekoli na ye :

—Bato balobaka ete Mwana ya moto azali nani ?

14Bazongisaki :

—Basusu balobaka : Jean Batiste ; Basusu : Eliya ; mpe basusu : Jeremiya to moko ya baprofeta.

15Yesu atunaki bango :

—Bongo bino, bolobaka ete ngai nazali nani ?

16Simon Piere azongisaki :

—Yo ozali Kristo, Mwana na Nzambe ya bomoi !

17Bongo Yesu alobaki na ye :

—Esengo mingi ezali na yo Simon mwana ya Jonasi ! Pamba te moto te ayebisi yo makambo oyo, kasi ezali Tata na ngai oyo ya Likolo.
18Bongo ngai nalobi na yo ete : yo ozali Piere, mpe na likolo ya libanga oyo nakotonga Lingomba na ngai. Mpe baporte ya lifelo ekoki kolonga yango te.
Copyright information for LinMNB