Matthew 16:5-10

5Tango bayekoli bakatisaki na ngambo mosusu ya ebale, babosanaki komema mampa. 6Yesu alobaki na bango :

—Bokeba mpe bokengela mpo na kisi oyo evimbisaka ya mampa ya bafarizeo mpe ya Basaduseoo !

7Bayekoli babandaki kotunana bango na bango, mpe balobaki :

—Ezali mpo tomemi mampa te !

8Kasi Yesu ayebaki makanisi na bango mpe alobaki :

—Mpo na nini bozali kotunana bino na bino, mpo bomemi mampa te ? Bato ya kondima moke !
9Naino bososoli te ? Bozali kokanisa te mampa mitano oyo bato nkoto mitano baliaki ? Bongo botondisaki bitunga boni na oyo etikalaki ? 10To mampa sambo oyo bato nkoto minei baliaki ? Bongo botondisaki bitunga boni na oyo etikalaki.
Copyright information for LinMNB