Matthew 18:12-17

12Bokanisi nini ? Soki moto moko azali na bameme nkama bongo moko ebungi, akotika te bameme na ye ntuku libwa na libwa mosusu likolo ya ngomba, mpo akende koluka moko oyo ebungi ? 13Mpe soki amoni yango, nalobi na bino ya solo, akoyoka esengo mingi penza mpo na meme wana moko, koleka esengo ya bameme ntuku libwa na libwa oyo ebungaki te. 14Ndenge moko mpe, Tata na bino ya Likolo, alingi te ete ata mwanamoko na kati ya bana oyo abunga.

Ndenge nini kolimbisa ndeko oyo asali yo mabe

15Soki ndeko na yo asali yo mabe, kende mpe lakisa ye mabe na yempe bozala kaka bino mibale. Soki ayokeli yo, wana ozongisi ndeko na yo na nzela ya malamu. 16Kasi soki ayokeli yo te, mema moto mosusu to bato mibale, mpo ete makambo nyonso oyo bokoloba endimama na nzela ya litatoli yabatemwe mibale to misato. 17Soki aboyi koyoka bango, yebisa likambo yango na Lingomba ; soki aboyi koyokela Lingomba, zwa ye lokola mopakano mpe lokola mofutisi mpako.
Copyright information for LinMNB