Matthew 20

Lisapo ya basali na kati ya elanga ya vino

1—Pamba te Bokonzi ya likolo ekokani na nkolo ya elanga, oyo abimaki na tongo-tongo mpo na kokende koluka bato oyo bakosalana elanga na ye ya vino. 2Ayokanaki na bango ete bakozwa deni moko mpo na mokolo moko, bongo atindaki bango na elanga na ye ya vino. 3Abimaki lisusu na ngonga ya libwa ya tongo, amonaki bato mosusu oyo bazalaki basomele, batelemaki na zando, mpe bazalaki kosala eloko moko te. 4Alobaki na bango :

—Bino mpe bokende kosala na elanga na ngai ya vino, nakofuta bino lifuti oyo ekoka.

Bango mpe bakendaki.

5Abimaki lisusu na ngonga ya midi, mpe na ngonga ya misato ya pokwa ; asalaki mpe kaka ndenge moko. 6Abimaki lisusu na ngonga ya mitano ya pokwa, mpe amonaki lisusu bato batelemaki wana. Bongo atunaki bango :

—Mpo na nini botelemi awa mokolo mobimba mpe bozali kosala eloko te ?

7Bazongisaki :

—Mpo moto moko te azwi biso na mosala.

Bongo alobaki na bango mpe :

—Bino mpe, bokende kosala na elanga na ngai ya vino.

8Tango pokwa ekomaki, nkolo ya elanga alobaki na kapita :

—Benga basali mpe futa bango. Banda na bato oyo nazwaki na suka mpe sukisa na baoyo nazwaki liboso !

9Bato oyo babandaki mosala na ngonga ya mitano ya pokwa bayaki mpe bazwaki deni moko-moko na moto. 10Tango bato oyo nkolo ya elanga azwaki liboso na mosala, bayaki, bakanisaki ete bakozwa mbongo mingi koleka. Kasi bango mpe bazwaki kakadeni moko moko na moto. 11Tango bazwaki yango, basilikelaki kolo ya elanga ; 12mpe balobaki :

—Bato oyo ozwaki sima mpe basali kaka ngonga moko, ofuti bango ndenge moko na biso ; nzokande biso tosali mosala ya makasi mokolomobimba mpe na nse ya moi makasi.

13Kasi nkolo ya elanga azongiselaki moko na bango :

—Moninga na ngai, nasali yo mabe te. Toyokanaki te ete osala mpo na deni moko ?

14Kamata lifuti na yo mpe kende. Ngai moko moto nasepeli kopesa moto oyo abandaki sima lifuti moko lokola oyo napesi yo. 15Boni, nazali na ndingisa te ya kosala ndenge ngai moko nalingi kosala na mbongo na ngai ? To oyoki zuwa mpo nazali moto malamu ?

16Yango wana, bato ya suka bakokoma bato ya liboso, mpe bato ya liboso bakokoma bato ya suka !

Yesu alobeli lisusu liwa mpe kosekwa na ye

(Mk. 10.32-34 ; Lk. 18.31-34)

17Tango Yesu azalaki kokende na Yeruzalem, na nzela, akamataki bayekoli na ye zomi na mibale na esika ya bango moko kaka, mpe alobaki na bango :

18—Tala, tozali kokende na Yeruzalem, kuna bakokaba Mwana ya moto na maboko ya bakonzi ya banganga-Nzambe mpe ya balakisi ya Mibeko. Bakokatela ye etumbu ya liwa, 19mpe bakopesa ye na maboko ya bapakano, mpo baseka ye, babeta ye fimbo, mpe babaka ye na ekulusu. Bongo akosekwa na mokolo ya misato !

Mama ya bana ya Zebede asengeli bana na ye bisika ya lokumu

(Mk. 10.35-45 ; Lk. 22.25-27)

20Bongo mama ya bana ya Zebede ayaki epai ya Yesu elongo na bana na ye, afukamaki liboso na ye mpe asengaki ye likambo moko.

21Yesu atunaki ye :

—Olingi nini ?

Azongisaki :

—Ndima ete, kati na Bokonzi na yo, bana na ngai oyo mibale ya mibali, bavanda : moko na loboko na yo ya mobali, mpe mosusu na loboko na yo ya mwasi !

22Kasi Yesu alobaki na bango :

—Boyebi te oyo bozali kosenga ! Bokokoka komela kopo oyo ngai nakomela ?

Bazongisaki :

—E e, tokokoka.

23Bongo Yesu alobaki na bango :

—Ya solo, bokomela kopo oyo ngai nakomela ; kasi kovanda na loboko na ngai ya mobali to na loboko na ngai ya mwasi, wana ezali nandingisa na ngai te. Bisika wana ekozala mpo na bato oyo Tata na ngai abongisa mpo na bango.

24Tango bayekoli zomi bayokaki makambo wana, basilikelakibandeko wana mibale.

25Yesu abengaki bango nyonso lisanga mpe alobaki :

—Boyebi ete bakonzi ya bikolo bayangelaka bato na bango na makasi, mpe bato minene balakisaka bokonzi na bango likolo na bango.
26Kasi mpo na bino ekoki kozala bongo te. Nzokande, oyo alingi kozala moto monene kati na bino, esengeli azala mosali na bino. 27Mpe oyo alingi kozala liboso kati na bino ; esengeli azala mowumbuna bino. 28Pamba te, Mwana ya moto ayaki te mpo bato basalela ye, kasi mpo na kosalela bato, mpe kopesa bomoi na ye mpo na kokangola bato ebelepenza !

Yesu abikisi bato mibale bakufa miso

(Mk. 10.46-52 ; Lk. 18.35-43)

29Tango Yesu na bayekoli na ye bazalaki kobima na Jeriko, bato ebele penza bazalaki kolanda ye.

30Bato mibale bakufa miso bavandaki pembeni ya nzela. Tango bayokaki ete Yesu azalaki koleka wana, bagangaki :

—Nkolo, Mwana ya David yokela biso mawa !

31Bato bagangelaki bango, mpe balobaki na bango bavanda nyee ; kasi bango bagangaki lisusu makasi :

—Nkolo, mwana ya David yokela biso mawa !

32Yesu atelemaki, abengaki bango mpe atunaki bango :

—Bolingi nasala nini mpo na bino ?

33Bazongiselaki ye :

—Nkolo, tolingi ete miso na biso efungwama !

34Yesu ayokelaki bango mawa mpe asimbaki miso na bango. Kaka na tango wana, babandaki komona mpe balandaki ye.
Copyright information for LinMNB