Matthew 22:15-20

15Bafarizeo bakendaki mpe bayokanaki mpo na koluka nzela ya kokanga Yesu na maloba na ye moko. 16Bongo batindaki bayekoli na bango epai na ye, elongo na bato ya lisanga ya Erode. Mpe balobaki :

—Moteyi, toyebi malamu ete yo ozali solo, oteyaka nzela ya Nzambe na bosolo nyonso, mpe obangaka moto te, pamba te otalaka bilongi ya bato te.
17Lobela biso, okanisi nini mpo na likambo oyo : Ndingisa ezali mpo na kofuta mpako epai ya Sezare to te ?

18Kasi Yesu ayebaki makanisi na bango ya mabe, mpe alobaki :

—Bato ya kokosana ! Mpo na nini bozali komeka ngai ?
19Bolakisa ngai mbongo oyo bofutelaka mpako !

Bamemelaki ye deni
Deni  : mbongo ya libende oyo bazalaki kosalela mpo na kofutela mpako.
moko.

20Bongo atunaki bango :

—Elongi oyo, na makomi oyo bakomi awa, ezali ya nani ?

Copyright information for LinMNB