Matthew 22:41-46

41Tango bafarizeo basanganaki esika moko, Yesu atunaki bango :

42—Bokanisi nini mpo na Kristo ? Azali Mwana ya nani ?

Bongo bazongiselaki ye :

—Azali mwana ya David !

43Alobaki na bango :

—Bongo ndenge nini David, na kotindama ya Molimo, abengaki ye Nkolo ? Pamba te alobaki :

44 Nkolo alobaki na Nkolo na ngai :
Vanda na loboko na ngai ya mobali,
kino tango nakotia banguna na yo,
na nse ya makolo na yo !
Tala mpe Nzembo 118.22-23.

45Soki David abengi ye “Nkolo”, bongo ndenge nini akoki kozalalisusu mwana na ye ?

46Moto moko te akokaki kozongisela ye ata liloba. Mpe banda mokolo wana, moto ata moko te amekaki lisusu kotuna ye mituna.
Copyright information for LinMNB