Matthew 27:11-16

11Yesu atelemaki liboso ya guvelenele ; mpe guvelenele atunaki ye :

—Ozali mokonzi ya Bayuda ? Yesu azongisaki :

—E e, ezali bongo, ndenge olobi !
12Kasi tango bakonzi ya banganga-Nzambe mpe bankolo ya Bayuda bazalaki kofunda ye, ye azongisaki ata liloba moko te. 13Bongo Pilato atunaki ye :

—Ozali koyoka te makambo bango bazali kofundela yo ?
14Kasi Yesu azongisaki ata liloba moko te. Yango wana, guveleneleakamwaki mingi penza. 15Guvelenele azalaki na momesano, ete na tango ya Feti azalakikobimisa moto moko ya boloko oyo bato bango moko bazalaki kopona. 16Na tango wana, moto moko azalaki na boloko, ayebanaki mingi, kombo na ye Barnabas.
Copyright information for LinMNB