Matthew 27:15-20

15Guvelenele azalaki na momesano, ete na tango ya Feti azalakikobimisa moto moko ya boloko oyo bato bango moko bazalaki kopona. 16Na tango wana, moto moko azalaki na boloko, ayebanaki mingi, kombo na ye Barnabas. 17Tango ebele ya bato basanganaki, Pilato atunaki bango :

—Bolingi natikela bino nani ? Barnabas to Yesu oyo babengaka Kristo ?
18Pamba te, ayebaki ete batekaki Yesu epai na ye kaka mpo nalikunia. 19Tango avandaki na kiti na ye oyo azalaki kokatela makambo, mwasi na ye atindelaki ye maloba oyo :

—Kokota te na makambo ya moto na sembo wana. Pamba te na butu ya lelo, namoni pasi mingi na ndoto mpo na ye.
20Kasi bakonzi ya banganga-Nzambe mpe bankolo, bandimisaki ebeleya bato mpo basenga Barnabas mpe baboma Yesu.
Copyright information for LinMNB